Nem só de pão vive o homem
'Nem só de pão vive o homem' — essa declaração de Jesus ao diabo no deserto revela que a Palavra de Deus é o verdadeiro alimento que sustenta a vida em plenitude.
O verdadeiro alimento
Quando tentado a transformar pedras em pão, Jesus respondeu com a Escritura: a vida humana depende de toda palavra que sai da boca de Deus.
Yesu azongisaki :
— Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te,
kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »
Satana alobaki na Ye :
— Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na libanga ete ebongwana lipa.
Yesu azongiselaki ye :
— Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te. »
Abukaki lolendo na yo, abomaki yo nzala mpe aleisaki yo mana oyo yo mpe batata na yo botikalaki koyeba te, mpo na koteya yo ete moto abikaka kaka na lipa te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Yawe.
Jesus, o pão vivo
Jesus é o pão da vida que desceu do céu. Quem come deste pão viverá para sempre. Ele é o sustento que satisfaz a fome da alma.
Yesu azongiselaki bango :
— Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.
pamba te nazali lipa oyo epesaka bomoi.
Ngai nde nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo ; moto nyonso oyo akolia lipa yango, akozala na bomoi ya seko ; mpe lipa oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi ezali nde nzoto na Ngai.
Ndenge Tata oyo atindaki Ngai azali etima ya bomoi mpe Ngai nazali na bomoi na nzela na Ye, ndenge wana mpe moto oyo alie nzoto na Ngai akozala na bomoi na nzela na Ngai. Tala ndenge lipa oyo ewuti na Likolo ezali : ekokani te na mana oyo bakoko na bino baliaki, kasi bakufaki kaka ; nzokande, moto oyo akolia lipa oyo Ngai nazali akozala na bomoi ya seko.
Buscar o Reino acima de tudo
Não andeis ansiosos pelo que comer ou beber. Buscai primeiro o Reino de Deus, e todas estas coisas vos serão acrescentadas.
Mateya na tina na mitungisi
Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina ?
Bomitungisaka te na tina na biloko ya kolia to ya komela, bolongola yango na makanisi na bino. Pamba te ezali bapagano ya mokili oyo nde balukaka-lukaka biloko wana nyonso. Tata na bino ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango. Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
Na tango yango, bayekoli bazalaki kosenga na Yesu :
— Rabi, lia.
Kasi Yesu azongiselaki bango :
— Ngai, nakolia bilei oyo bino boyebi te.
Bongo bayekoli na Ye balobanaki bango na bango :
— Boni, ekoki kozala na moto oyo amemelaki Ye bilei ?
Yesu alobaki na bango :
— Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.
Nzokande, nzete ya figi ebimisi fololo te,
nzete ya vino eboti mbuma te,
nzete ya olive eboti mbuma te,
bilanga ebimisi bilei te,
bameme mpe bantaba ezali te kati na lopango,
mpe bangombe ezali te kati na lopango.
Kasi ngai nakosepela kati na Yawe
mpe nakotondisama na esengo mingi
kati na Nzambe, Mobikisi na ngai.
Nkolo Yawe azali makasi na ngai :
akomisaka makolo na ngai lokola makolo ya mboloko,
apesaka ngai makasi ya komata
kino na likolo ya bangomba.
Wuta na buku ya motambolisi banzembo. Babetaki yango na mandanda.