Publicidade

Orgulho

Por Bíblia Online

O orgulho é um dos pecados mais condenados na Bíblia. Deus resiste aos soberbos, mas dá graça aos humildes. A humildade é o caminho da honra verdadeira.

Deus resiste ao soberbo

A soberba precede a ruína e o orgulho antecede a queda. Deus abomina o coração altivo e promete humilhar quem se exalta.

Lolendo eyaka liboso ya kobebisama,

mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.

Moto nyonso ya lolendo azalaka nkele na miso ya Yawe ;

solo, akozanga te kozwa etumbu.

Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato,

nzokande, na suka, ememaka na kufa.

Kotosa Yawe ezali koyina mabe.

Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu

mpe monoko ya lokuta.

Tango lolendo eyaka, soni mpe eyaka,

kasi bwanya ezali elongo na bato oyo bamikitisaka.

Tango lolendo eyaka, soni mpe eyaka,

kasi bwanya ezali elongo na bato oyo bamikitisaka.

Lolendo ya moto ekitisaka ye,

kasi moto ya komikitisa azwaka lokumu.

Lolendo ya moto ekitisaka ye,

kasi moto ya komikitisa azwaka lokumu.

Liboso ete moto akweya,

motema na ye ekomaka na lolendo ;

kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.

Liboso ete moto akweya,

motema na ye ekomaka na lolendo ;

kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.

Yawe abukaka ndako ya moto ya lolendo,

kasi alendisaka libula ya mwasi oyo akufisa mobali.

Humildade como caminho

Humilhai-vos diante do Senhor e Ele vos exaltará. A grandeza no Reino vem pelo serviço humilde, não pela autopromoção.

Nzokande, Nzambe atalisaka biso ngolu oyo eleki, pamba te Makomi eloba : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka»

Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe Nkolo akotombola bino.

Babola mpe bazwi

Tika ete ndeko oyo akelela asepela mpo ete Nzambe akotombola ye, mpe oyo azali mozwi asepela mpo ete Nzambe akokitisa ye ; pamba te mozwi akoleka lokola fololo ya elanga.

Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi :

« Nzambe atelemelaka bato ya lolendo,

kasi atalisaka ngolu na Ye

epai ya bato oyo bamikitisaka»

Yango wana, bomikitisaka na se ya loboko ya nguya ya Nzambe mpo ete atombola bino na tango oyo ekoki. Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.

Solo, moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe moto oyo amikitisaka, bakotombola ye»

Bosala eloko moko te na kowelana to na koluka lokumu ezanga tina ; kasi na komikitisa nyonso, bomona baninga lokola nde baleki bino. Tika ete moko te kati na bino aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya bandeko mosusu. Bozala na posa ya kozalaka na bizaleli ya boye kati na bino ndenge mpe Yesu-Klisto azalaki na yango.

Os perigos do orgulho

O orgulho cega, gera contendas e afasta de Deus. A Escritura adverte contra a soberba da vida e a vã glória mundana.

pamba te nyonso oyo ezali kati na mokili, lokola baposa mabe ya nzoto, posa makasi ya konduka biloko oyo miso ezali kolula, mpe lofundu mpo na biloko ; ewuti na Tata te, kasi ewuti na mokili.

Yango wana, tika ete moto oyo azali kokanisa ete azali ya kotelema asala keba ete akweya te !

Soki napesi biloko na ngai nyonso epai ya babola, mpe nakabi nzoto na ngai mpo ete batumba yango, kasi nazangi bolingo, nakozwa ata litomba moko te.

Nzambe aponaki biloko ezanga tina, biloko ya kotiola, biloko oyo ezalaka te, mpo na kokomisa pamba biloko oyo mokili epesaka tina, mpo ete moto ata moko te amikumisa liboso ya Nzambe.

Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa kati na Nkolo ! Pamba te moto oyo bandimaka, ezali te oyo amilobelaka ye moko, kasi ezali nde oyo Nkolo atatolaka bosolo na tina na ye.

Yesu alobaki lisusu :

Oyo ebimaka na moto, yango nde ekomisaka ye mbindo. Pamba te, ezali wuta na kati, na motema penza ya moto nde ewutaka makanisi mabe, kindumba, moyibi, koboma, ekobo, lokoso ya mbongo, kanda, mayele mabe, pite, likunya, songisongi, mafinga, lolendo mpe makambo nyonso mosusu ya mabe. Makambo nyonso wana ya mabe ewutaka kati na moto, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.

Lolendo ememaka kaka na koswana,

kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya.

Komikitisa mpe kotosa Yawe ememaka

bozwi, lokumu mpe bomoi.

Bato ya bomengo

Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.

O olhar de Deus

O Senhor não olha como o homem. Ele vê o coração e se agrada dos quebrantados de espírito e dos que tremem diante da sua Palavra.

Kasi Yawe alobaki na Samuele :

Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema.

Bolobaloba maloba ebele te ya lolendo,

mpe tika ete lofundu ebima na monoko na bino te,

pamba te Yawe azali Nzambe oyo ayebi nyonso

mpe asambisaka misala nyonso ya bato.

Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso,

mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso »

elobi Yawe.

« Tala moto oyo Ngai nakotala :

moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami,

mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.

Mokonzi ya Isalaele azongisaki :

Boloba na ye : « Moto oyo alati bibundeli asengeli komikumisa te lokola moto oyo alongoli bibundeli »

Bobikaka na boyokani kati na bino mpe bozalaka na makanisi malamu mpo na baninga. Bozalaka na lofundu te, kasi bozalaka bato ya komikitisa. Bomimonaka te lokola bato bamikoka.

Kasi mbuma ya Molimo ezali : bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima, boboto mpe komikanga. Mibeko epekisaka te makambo ya lolenge oyo.

Seja o primeiro
Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-28_14-13-17-