Publicidade

Ouvir

Por Bíblia Online

Ouvir é uma disciplina espiritual essencial. A Bíblia exorta: 'Quem tem ouvidos, ouça.' A fé vem pelo ouvir, e ouvir é mais que escutar — é obedecer e agir.

A fé vem pelo ouvir

Sem ouvir a Palavra, não há fé. A pregação do evangelho gera fé nos corações de quem ouve com disposição e humildade.

Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto.

Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto.

Kasi ndenge nini bakoki solo kobelela Ye soki bandimeli Ye te ? Mpe ndenge nini bakoki solo kondimela Ye soki bayoki nanu sango na Ye te ? Mpe ndenge nini bakoki solo koyoka sango na Ye soki moto ateyi bango te ?

Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !

Maloba oyo mosakoli Ezayi asakola mpo na bango ekokisami :

« Matoyi na bino ekoyoka na pamba, kasi bokososola te ;

miso na bino ekotala na pamba, kasi bokomona te !

Pamba te mitema ya bato oyo ezali mabanga ;

bakangi penza matoyi mpe miso na bango,

noki te miso na bango emona,

matoyi na bango eyoka,

mitema na bango esosola,

mpe babongola mitema, mpe Ngai nabikisa bango»

Ouvir e obedecer

Não basta ouvir — é preciso praticar. Quem ouve a Palavra e a pratica é como o homem sábio que edificou sobre a rocha.

Botiaka na misala Liloba na Nzambe ; kasi bosukaka kaka te na koyoka yango, soki te bokomikosa bino moko na pamba.

Botiaka na misala Liloba na Nzambe ; kasi bosukaka kaka te na koyoka yango, soki te bokomikosa bino moko na pamba.

Koyoka mpe kotosa Liloba na Nzambe

Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ;

Koyoka mpe kotosa Liloba na Nzambe

Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ; pamba te kanda ya moto ekokisaka te makambo ya sembo na miso ya Nzambe.

Lisese ya batongi mibale ya ndako

Yango wana, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba mpe atie yango na misala akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye na likolo ya libanga.

Lisese ya batongi mibale ya ndako

Yango wana, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba mpe atie yango na misala akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye na likolo ya libanga. Tango mvula ebetaki makasi, mayi mpe mopepe eyaki makasi, emibwakaki na ndako yango ; kasi atako bongo, ndako ekweyaki te, pamba te miboko na yango etongamaki na likolo ya libanga. Nzokande, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba, kasi atie yango te na misala, akokani na zoba oyo atongaki ndako na ye na likolo ya zelo : tango mvula ebetaki makasi, mayi eyaki elongo na mopepe makasi, emibwakaki na ndako yango ; ndako yango ekweyaki, mpe nyonso epanzanaki»

Yesu azongisaki :

Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te,

kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe»

Yesu azongisaki :

Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango !

Yesu azongisaki :

Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango !

Bosalela makambo nyonso oyo boyekolaki, bozwaki, boyokaki mpe bomonaki epai na ngai ; bongo Nzambe ya kimia akozala elongo na bino.

Deus ouve nossas orações

O Senhor ouve os que clamam a Ele de coração sincero. Ele inclina os ouvidos para as nossas súplicas e responde com fidelidade.

Yawe ayokaka ngai

Nalingaka Yawe, pamba te ayokaka

mongongo mpe mabondeli na ngai.

Ayokaki ngai ;

boye nakobelela Ye bomoi na ngai mobimba.

Basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai,

mitambo ya kufa ekangaki ngai.

Zala mosika na mabe mpe sala bolamu,

luka kimia mpe koba na yango.

Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai,

yoka koganga na ngai

wana nazali kosenga lisungi,

pamba te nazali kobondela nde Yo.

Nzokande Yo, osepelaka na bosembo,

ata kati na libumu ;

mpe okoteya ngai bwanya

kati na esika ebombama.

Na tongo makasi, sala ete nayoka boboto na Yo,

pamba te natia elikya na ngai kati na Yo.

Lakisa ngai nzela ya kolanda,

pamba te napesi bomoi na ngai epai na Yo.

Mpe tala elikya oyo tozali na yango liboso ya Nzambe : soki tosengi eloko kolanda mokano na Ye, ayoki biso.

Mpe soki toyebi ete ayoki biso, toyebi lisusu ete tozali na eloko oyo tosengi epai na Ye.

Boye bokobelela Ngai, bokoya epai na Ngai mpe bokobondela Ngai ; mpe Ngai nakoyoka bino.

‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te

Lisumu, koyambola mpe kosikolama

Tala, loboko na Yawe ezali mokuse te

mpo na kobikisa,

litoyi na Ye ekangama te mpo na koyoka !

Ouvir a voz de Deus

Jesus disse: 'As minhas ovelhas ouvem a minha voz.' Deus fala através da Palavra, do Espírito e das circunstâncias — cabe a nós ouvir.

Bameme na Ngai eyokaka mongongo na Ngai. Nayebi bameme na Ngai, mpe yango elandaka Ngai.

Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi. Nazali koloba na bino penza ya solo : tango ezali koya mpe esili kokoka oyo bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, mpe ba-oyo bakoyoka yango bakozala na bomoi ;

Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.

Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.

bosengeli te koyoka maloba ya mosakoli wana to ya moto wana oyo amonaka makambo. Yawe, Nzambe na bino, akomeka bino mpo na kotala soki bolingi Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba.

Boni, ezali mpo botosaki Mobeko nde Nzambe apesi bino Molimo na Ye mpe azali kosala bikamwa kati na bino to ezali mpo boyambaki na kondima Sango Malamu oyo boyokaki ?

Sabedoria no ouvir

Seja pronto para ouvir e tardio para falar. A sabedoria começa com a disposição de ouvir instrução e aceitar correção.

Kopesa eyano liboso ya koyoka

ezali liboma mpe bozoba.

Moto oyo akanisaka na tina na makambo

amonaka bolamu.

Esengo na moto oyo atiaka elikya na Yawe.

Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo

mpe kosundola te mateya ya mama na yo.

Moto oyo ayokaka pamela atambolaka na nzela ya bomoi,

kasi moto oyo ayokaka pamela te

apengwisaka bato mosusu.

Moto oyo akangi matoyi na ye

mpo na koboya koyoka mobeko,

libondeli na ye ekomaka nkele na miso ya Nzambe.

Koyoka pamela ya moto ya bwanya

ezali malamu koleka koyoka banzembo ya zoba.

Makambo nyonso elembisaka,

moto oyo akoki kobeta na yango tembe azali te ;

nzokande, miso etondaka te na kotala,

mpe matoyi etondaka te na koyoka.

Soki botelemeli Ngai mpe boboyi koyoka Ngai, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.

Soki boyoki te, soki boboyi kozwa mokano ya kopesa Kombo na Ngai lokumu» elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakotindela bino elakeli mabe mpe nakolakela lipamboli na bino mabe. Solo, nasili kolakela yango mabe, pamba te bozwaki mokano te ya kopesa Kombo na Ngai lokumu.

Kasi tango nakoloba na yo mpe nakofungola monoko na yo mpo ete oyebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobiTika ete moto oyo akolinga koyoka ayoka, mpe oyo akoboya koyoka aboya na ye ! Pamba te bazali libota ya batomboki»

Na mikolo ekoya»

elobi Nkolo Yawe,

« nakotinda nzala makasi kati na mokili ;

ekozala te nzala ya bilei to posa ya mayi,

kasi ekozala nzala ya koyoka Liloba na Yawe.

Pene na midi ya butu, Polo mpe Silasi bazalaki kosambela mpe kokumisa Nzambe na banzembo ; bakangami mosusu bazalaki koyoka bango.

Jozue alobaki na bana ya Isalaele :

Bopusana awa mpe boyoka maloba ya Yawe, Nzambe na bino.

Nyonso oyo bokoloba kati na molili ekoyokana kati na pole ya mokolo, mpe nyonso oyo bokolobana na matoyi kati na bashambre ekosakolama wuta na likolo ya bandako.

Ndenge nini kolimbisa ndeko oyo asali yo mabe

Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende kotalisa ye mabe na ye na esika ya bino mibale kaka. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ye na nzela malamu.

Ndenge nini kolimbisa ndeko oyo asali yo mabe

Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende kotalisa ye mabe na ye na esika ya bino mibale kaka. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ye na nzela malamu. Kasi soki ayokeli yo te, mema moto mosusu to bato mibale, pamba te Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato. Kasi soki aboyi kaka koyokela bango, yebisa makambo yango na Lingomba. Soki aboyi mpe kaka koyokela Lingomba, zwa ye lokola mopagano mpe lokola mofutisi mpako.

Jetro asepelaki koyoka makambo wana nyonso ya kitoko oyo Yawe asalelaki bana ya Isalaele tango akangolaki bango wuta na maboko ya bato ya Ejipito.

Mbonge ya kufa efinaki ngai,

mpela ya libebi epesaki ngai somo,

basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai,

mitambo ya kufa ekangaki ngai.

Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe,

nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai.

Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye,

koganga na ngai mpo na kosenga lisungi

ekomaki kino na matoyi na Ye.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-