Pular para o conteúdo
Publicidade

Pais e filhos

Por Bíblia Online

A relação entre pais e filhos é uma das mais preciosas na Bíblia. Deus estabeleceu a família como escola de fé, amor e formação de caráter.

Honrar pai e mãe

Honrar os pais é o primeiro mandamento com promessa. Os filhos são chamados a obedecer, respeitar e cuidar de seus pais.

Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.

Baboti mpe bana

Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo. Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka : Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili.

Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.

Yokela tata oyo aboti yo,

mpe kotiola mama na yo te ata soki anuni.

Mwana oyo abetaka tata na ye

mpe abenganaka mama na ye

ayeisaka soni mpe mawa.

Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe,

mwinda na ye ekokufa kati na molili.

Soki mwasi akufisa mobali azali na bana to bakoko, bana to bakoko yango basengeli, liboso na nyonso, koyekola kotalisa botosi na bango kati na makambo ya Nzambe na nzela ya kosunga libota na bango mpe kozongisa bolamu epai ya baboti mpe bakoko na bango, pamba te kosala bongo esepelisaka Nzambe.

Instruir os filhos

Os pais devem instruir os filhos no caminho certo. A educação começa cedo, com disciplina amorosa e ensino constante da Palavra.

Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ;

ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.

Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.

Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo,

mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;

Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo,

mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.

Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.

Batata, boyokisaka bana na bino kanda te, noki te mitema na bango ekolemba.

Fimbu mpe pamela epesaka bwanya,

kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.

Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu

alingaka ye te,

kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.

Bokangaka motema liboso ya bapasi oyo Nzambe apesaka bino lokola etumbu, pamba te azwaka bino lokola bana na Ye. Boni, ezali solo na mwana oyo tata na ye apesaka ye etumbu te ?

Filhos como bênção

Os filhos são herança do Senhor. A coroa dos velhos são os filhos dos filhos, e a glória dos filhos são seus pais.

Bana bazali libula kowuta na Yawe,

mpe kobota bana ezali lifuti.

Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba,

ndenge wana mpe bana oyo moto aboti

na bolenge na ye bazali.

Esengo na moto oyo atondisi makonga

kati na ebombelo na ye ya makonga !

Akokufa soni ata moke te

tango akosamba elongo na banguna na ye

na ekuke ya engumba.

Bakitani bazali motole ya bakoko,

mpe baboti bazali lokumu ya bana.

Tata ya moto ya sembo akozala na esengo mingi,

mpe moto oyo abota mwana ya bwanya akosepela kati na ye.

Masese ya Salomo

Masese ya Salomo :

Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye,

kasi mwana ya zoba ayokisaka

mama na ye pasi na motema.

Nani kati na bino, batata, akopesa na mwana na ye nyoka soki asengi ye mbisi, to akopesa ye koto soki asengi ye liki ? Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !

Moto nyonso oyo asungaka bandeko na ye te, mingi-mingi bato ya libota na ye, asili kobwaka kondima mpe azali moto mabe koleka ata moto oyo azali mondimi te.

Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe»

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.

Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko.

Seja o primeiro