Palavras de conforto
Deus é o Deus de todo conforto. Ele consola os que choram, restaura os quebrantados e promete que a dor presente dará lugar à alegria eterna.
O Deus de toda consolação
Bendito seja o Deus e Pai de nosso Senhor Jesus Cristo, Pai das misericórdias e Deus de toda consolação, que nos consola em todas as tribulações.
Matondi epai ya Nzambe
Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama ! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso : abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.
Matondi epai ya Nzambe
Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama ! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso : abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.
Pamba te, ndenge kaka tomonaka pasi mingi kati na Klisto, ndenge wana mpe Klisto abondisaka biso makasi. Boye soki tozali komona pasi, ezali mpo na kobondisama mpe lobiko na bino. Soki mpe biso tobondisami, ezali mpo ete bino mpe bobondisama mpo na koyikela pasi oyo tozali komona elongo na bino mpiko.
Boye, tozali solo na elikya makasi na tina na bino, pamba te toyebi malamu ete ndenge kaka bozali komona pasi elongo na biso, ndenge wana mpe bozali kozwa kobondisama elongo na biso.
Pamba te, ndenge kaka tomonaka pasi mingi kati na Klisto, ndenge wana mpe Klisto abondisaka biso makasi.
Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye !
Bino nyonso bana ya Jakobi, bopesa Ye lokumu !
Bino nyonso bana ya Isalaele, botosa Ye !
Tango bato ya sembo babelelaka,
Yawe ayokaka mpe akangolaka bango
na pasi na bango nyonso.
Promessas de restauração
Deus sarará o quebrantado de coração e atará as suas feridas. Quem semeia em lágrimas, colherá com júbilo.
Abikisaka bato oyo batutami na mitema
mpe akawusaka bapota na bango.
Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe,
bino babulami na Ye ;
bokumisa Kombo na Ye ya bule.
Nzambe azali ekimelo na biso
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.
Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali,
nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ;
maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta,
nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
Mpo na makambo oyo ya mabe,
boni, bazanga etumbu ?
Oh Nzambe, kweyisela bikolo kanda na Yo !
Akonzaka mokili na bosembo,
akataka makambo ya bato na alima.
Oh Yawe, makasi na ngai, nalingaka Yo.
Paz e descanso
Jesus disse: 'Vinde a mim, todos os cansados e sobrecarregados, e eu vos aliviarei.' A paz de Deus que excede todo entendimento guarda o coração.
Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi.
Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi. Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi.
Esengo na bato oyo bazali kolela,
pamba te bakobondisama !
Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !
Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.
Bino mpe ndenge moko, bozali sik’oyo na mawa ; kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe moto ata moko te akokoka kolongola bino esengo yango.
Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.
Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.
Esperança eterna
Deus enxugará toda lágrima. A dor presente é momentânea, mas a glória futura é eterna. O Senhor transforma luto em dança.
Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba : « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango. Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. »
Bongo Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi alobaki : « Nazali kokomisa biloko nyonso ya sika. »
Alobaki lisusu : « Koma makambo oyo, pamba te maloba oyo ezali penza ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. »
Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.
Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ;
komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ;
nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ;
solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali,
loboko oyo elongisaka.
Mobu ya ngolu na Yawe mpo na Siona
Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai,
pamba te Yawe apakoli ngai mafuta
mpo na kosakola sango malamu epai ya babola,
kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka,
kosakola bonsomi epai ya bawumbu
mpe kobimisa bakangami na boloko ;
mpo na kosakola mpo na Yawe mobu ya ngolu,
kosakola mpo na Nzambe na biso mokolo ya kozongisa mabe na mabe,
kobondisa bato oyo bazali kolela,
komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga
mitole na esika ya putulu,
mafuta ya esengo na esika ya matanga,
mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami.
Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe,
mpo na komonisa nkembo na Ye.
Ndenge mama abondelaka mwana na ye,
ndenge wana mpe Ngai nakobondela bino ;
mpe bokobondisama mpo na Yelusalemi. »
Nunca sozinhos
Deus nunca nos abandona. Ele está ao nosso lado em cada vale, segura nossa mão e promete que o choro não durará para sempre.
Ye moko Yawe akotambola liboso na yo mpe akozala elongo na yo. Kobanga te mpe yika mpiko. »
Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »
Yawe azali malamu,
azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi
mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.
Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo,
azali Elombe Mobikisi.
Akosepela na yo makasi
mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ;
akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›
Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.
Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika : makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.
Boye tika ete bato oyo bazali komona pasi mpo ete batosaka mokano ya Nzambe bamipesa mobimba na Mokeli na bango oyo azali sembo, mpe tika ete basalaka bolamu.
Yango wana, bomikitisaka na se ya loboko ya nguya ya Nzambe mpo ete atombola bino na tango oyo ekoki. Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.
Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku
oyo etondi na molili ya kufa,
nakobanga mabe ata moko te,
pamba te ozali elongo na ngai,
nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai,
mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.
Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe,
eloko moko kaka oyo nasengaka makasi :
nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe,
mikolo nyonso ya bomoi na ngai,
mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe
mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.
Pamba te, na tango ya pasi,
akobatela ngai kati na evandelo na Ye,
akobomba ngai kati ya Ndako na Ye ya bule
mpe akotelemisa ngai na likolo ya libanga.
Kati na pasi na ngai, liloba na Yo ebondisaka ;
batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo.
atombolaka bato oyo babwakama,
mpe apesaka esengo na bato oyo bazali kolela ;
Yesu azongisaki :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye ya mibali mpe ya basi, mama na ye, tata na ye, bana na ye to bilanga na ye, mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu, akozwa mbala nkama koleka, na tango oyo tozali kobika sik’oyo, bandako, bandeko ya mibali mpe ya basi, bamama, bana mpe bilanga, elongo na minyoko ; mpe na tango oyo ekoya, bomoi ya seko.
Mpe Ngai, nakosenga epai ya Tata ete apesa bino Molobeli mosusu mpo ete azala elongo na bino tango nyonso, Molimo ya solo, Molimo oyo mokili ekoki koyamba te mpo ete ezali komona Ye te to eyebi Ye te. Kasi bino, boyebi Ye, pamba te azali elongo na bino mpe azali kati na bino. Nakotika bino te lokola bana bitike ; nakozongela bino.