A Palavra de Deus
A Palavra de Deus é viva, eficaz e eterna. Desde 'No princípio era o Verbo' até 'O céu e a terra passarão, mas as minhas palavras não hão de passar', ela é a revelação suprema do Criador.
No princípio era o Verbo
A Palavra é Deus encarnado. No princípio era o Verbo, o Verbo estava com Deus, e o Verbo era Deus. Todas as coisas foram feitas por Ele.
Liloba na Nzambe mpe Motatoli na yango
Na ebandeli, Ye oyo azali Liloba azalaka ; azalaka elongo na Nzambe, mpe azali Nzambe.
Liloba na Nzambe mpe Motatoli na yango
Na ebandeli, Ye oyo azali Liloba azalaka ; azalaka elongo na Nzambe, mpe azali Nzambe.
Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.
Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.
Mpe Nzambe alobaki : « Tika ete pole ezala ! »
Mpe pole ezalaki.
Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
Ezali na kondima nde tososolaka ete mokili esalemaki na nzela ya Liloba na Nzambe, mpe ete biloko oyo emonanaka esalemaki na nzela ya biloko oyo emonanaka te.
Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ;
mampinga na yango nyonso,
na nzela ya pema ya monoko na Ye.
A Palavra é viva e eficaz
A Palavra de Deus é mais cortante que espada de dois gumes. Ela julga pensamentos e intenções do coração, transforma e liberta.
Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.
Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.
« boni, maloba na Ngai ezali lokola moto te ? To lokola marto te oyo ebukaka mabanga biteni-biteni ? » elobi Yawe.
Bolataka lobiko lokola ekoti ya ebende, mpe bozwaka Liloba na Nzambe lokola mopanga ya Molimo.
Toda Escritura é inspirada
Toda a Escritura é inspirada por Deus e útil para ensino, correção e instrução na justiça. Ela é perfeita e imutável.
Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo,
Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo, mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.
Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo, mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.
Luz para o caminho
A Palavra é lâmpada para os pés e luz para nosso caminho. Ela ilumina, orienta e protege o que nela medita dia e noite.
Liloba na Yo ezali mwinda
mpo na makolo na ngai,
mpe pole mpo na nzela na ngai.
Liloba na Yo ezali mwinda
mpo na makolo na ngai,
mpe pole mpo na nzela na ngai.
Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka,
epesaka bazoba mayele.
Yawe, liloba na Yo ezali mpo na seko,
epikama kati na likolo ;
Ndenge nini elenge akoki kowumela
na nzela ya sembo ?
Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.
Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai
mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.
Moboko ya liloba na Yo ezali bosolo,
mpe mibeko nyonso ya bosembo na Yo ezali
mpo na libela.
Obedecer a Palavra
Seja praticante da Palavra e não apenas ouvinte. Jesus disse que quem ouve e pratica é como o homem sábio que edificou sobre a rocha.
Botiaka na misala Liloba na Nzambe ; kasi bosukaka kaka te na koyoka yango, soki te bokomikosa bino moko na pamba.
Botiaka na misala Liloba na Nzambe ; kasi bosukaka kaka te na koyoka yango, soki te bokomikosa bino moko na pamba.
Botiaka na misala Liloba na Nzambe ; kasi bosukaka kaka te na koyoka yango, soki te bokomikosa bino moko na pamba. Moto oyo ayokaka Liloba kasi atiaka yango te na misala, akokani na moto oyo amitali na talatala mpe, sima na ye komitala, akei mpe, kaka na tango yango, abosani ndenge azali.
Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya bosoto mpe misala nyonso ya mabe, bondima na komikitisa Liloba oyo elonamaki kati na mitema na bino, pamba te ezali na nguya ya kobikisa bino.
Lisese ya batongi mibale ya ndako
Yango wana, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba mpe atie yango na misala akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye na likolo ya libanga.
Yesu azongisaki :
— Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te,
kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »
Yesu azongisaki :
— Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te,
kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »
Yesu azongisaki :
— Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango !
Yesu azongiselaki ye :
— Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te. »
Bato nyonso bakamwaki mpe bakomaki kotunana :
— Oyo ezali lisusu maloba nini ! Azali kopesa mitindo epai ya milimo mabe, na bokonzi mpe na nguya nyonso, mpe yango ezali kobima !
A Palavra que permanece
Céus e terra passarão, mas as palavras de Jesus jamais passarão. A Palavra do Senhor permanece para sempre — eterna e infalível.
Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka,
kasi Liloba na Nzambe na biso ewumelaka seko na seko. »
Pamba te Liloba na Yawe ezali alima,
misala na Ye nyonso ekokisamaka na boyengebene.
Pamba te Liloba na Yawe ezali alima,
misala na Ye nyonso ekokisamaka na boyengebene.
Liloba nyonso ya Nzambe ezalaka na libunga te,
ezali nguba mpo na bato oyo bazwaka yango
lokola ebombamelo na bango.
Pamba te Yawe nde apesaka bwanya,
mpe maloba ya monoko na Ye epesaka
mayele mpe bososoli.
Pamba te Yawe nde apesaka bwanya,
mpe maloba ya monoko na Ye epesaka
mayele mpe bososoli.
O poder da Palavra
A Palavra transforma, sara e liberta. Quem permanece na Palavra de Jesus conhece a verdade, e a verdade o liberta.
Bonsomi ya solo
Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki Ye :
— Soki bowumeli kati na Liloba oyo nateyaki bino, bokozala penza bayekoli na Ngai,
Bonsomi ya solo
Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki Ye :
— Soki bowumeli kati na Liloba oyo nateyaki bino, bokozala penza bayekoli na Ngai, bokoyeba solo, mpe solo ekokangola bino.
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo akobatela Liloba na Ngai kati na ye akotikala kokufa te.
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.
Yesu azongiselaki ye :
— Moto oyo alingaka Ngai akobatela maloba na Ngai, mpe Tata na Ngai akolinga ye ; bongo tokoya epai na ye mpe tokovanda elongo na ye.
Bino mpe, bosili kokoma peto mpo na liloba oyo nateyaki bino.
Bulisa bango na nzela ya bosolo na Yo, Liloba na Yo ya solo.
Sima, tango Yesu asekwaki, bayekoli na Ye basosolaki makambo oyo alobaki na bango. Boye bandimaki Makomi mpe maloba oyo Yesu alobaki.
Bato ebele koleka bakomaki kondimela Ye mpo na maloba oyo Ye moko azalaki koloba.
Moto oyo akondima Ngai, kolanda ndenge Makomi elobi, bibale ya mayi ya bomoi ekotiola wuta kati na ye.
Meditar na Palavra
A meditação na Palavra traz prosperidade e bom sucesso. Ela é fonte de sabedoria, consolo e orientação para toda a vida.
Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo ; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.
Tango kaka nayokaki maloba na Yo,
nayambaki yango na esengo ;
maloba yango esepelisaki ngai
mpe etondisaki motema na ngai na esengo ;
pamba te babengaka ngai na Kombo na Yo,
Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, okobika ; pamba te kondima oyo ekomisaka sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ememaka na lobiko ebimaka nde na monoko.
Mokolo oyo nazalaka na bobangi,
natiaka elikya na ngai kati na Yo.
Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli ;
mpe na lisungi ya Nzambe na ngai,
nakatisaka bamir.
alakisaka ngai kobunda,
mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze.
Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai,
loboko na Yo ya mobali elendisaka ngai,
mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi.
Bana na ngai, boya, boyoka ngai ;
Nakolakisa bino kotosa Yawe.
Nani asepelaka na bomoi ?
Nani alingaka kobika mikolo ebele ya esengo ?
Abukaki lolendo na yo, abomaki yo nzala mpe aleisaki yo mana oyo yo mpe batata na yo botikalaki koyeba te, mpo na koteya yo ete moto abikaka kaka na lipa te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Yawe.
Lokola bana oyo babotami sika, bolingaka makasi komela miliki ya peto ya Liloba mpo ete bokola na nzela na yango mpo na kozwa lobiko,
Ndakisa ya komikitisa ya Klisto
Boye, soki kolendisama ezali kati na Klisto, soki kobondisama ezali kati na bolingo, soki boyokani ezali kati na Molimo, soki bolamu mpe mawa ezali kati na bino, botondisa motema na ngai na esengo na kozalaka motema moko, bolingo moko, likanisi moko mpe posa moko. Bosala eloko moko te na kowelana to na koluka lokumu ezanga tina ; kasi na komikitisa nyonso, bomona baninga lokola nde baleki bino. Tika ete moko te kati na bino aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya bandeko mosusu. Bozala na posa ya kozalaka na bizaleli ya boye kati na bino ndenge mpe Yesu-Klisto azalaki na yango.
Ye oyo azalaki na lolenge ya Nzambe,
amonaki yango te lokola eloko ya kowelela,
kasi amikomisaki moto pamba,
akomaki lokola mowumbu,
amikomisaki lokola moto
mpe amonanaki bongo lokola moto ;
amikitisaki penza
mpe atosaki kino na kufa,
ata na kufa ya ekulusu.
Yango wana mpe Nzambe atombolaki Ye na likolo ya nyonso
mpe apesaki Ye Kombo oyo eleki bakombo nyonso,
mpo ete, na Kombo na Yesu,
mabolongo nyonso efukama
kati na Likolo, na mokili mpe na se ya mabele,
mpe minoko nyonso etatola ete Yesu-Klisto azali Nkolo
mpo na nkembo ya Nzambe Tata.
Makambo oyo mondimi asengeli kosala
Yango wana, balingami na ngai, ndenge bozalaki tango nyonso na botosi, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na kobanga mpe na kolenga : bokosalaka bongo kaka te tango nazali elongo na bino, kasi mpe sik’oyo, na kolekisa, tango nazali elongo na bino te ; pamba te ezali Nzambe nde apesaka posa mpe makoki ya kosala makambo nyonso, ndenge ezali mabongisi na Ye ya bolingo.
Bosalaka likambo moko te na koyimayima mpe na tembe, mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili mpo bosimbi makasi Liloba ya bomoi. Boye, na mokolo ya Klisto, bokosala lokumu na ngai, pamba te nakimaki mbangu mpe nasalaki mosala na pamba te. Mpe ata soki makila na ngai ekoki kosopana lokola mbeka ya masanga na likolo ya mbeka oyo ezali mosala ya kondima na bino, nakozala na esengo mpo na yango mpe nakosepela elongo na bino nyonso. Bino mpe ndenge moko, bosepela mpo na yango mpe bosepela elongo na ngai.
Timote mpe Epafrodite
Kati na Nkolo Yesu, nazali na elikya ya kotindela bino Timote kala mingi te, mpo ete nalendisama na basango oyo akopesa ngai na tina na bino. Pamba te nazali awa na moto mosusu te, longola kaka ye, oyo azali kokabola na ngai makanisi moko mpe azali komitungisa na ndenge ya solo mpo na bolamu na bino ; bato nyonso oyo batikali balukaka kaka bolamu na bango moko, kasi bamipesaka te na makambo ya Yesu-Klisto. Nzokande, bino moko boyebi ndenge nini Timote alakisaki molende na ye, pamba te asalaki elongo na ngai mosala ya kopanza Sango Malamu, ndenge mwana asalaka elongo na tata na ye. Yango wana nazali na elikya ya kotinda ye epai na bino tango kaka nakoyeba ndenge nini makambo na ngai ekosuka. Nandimisami solo kati na Nkolo ete nakoya kotala bino kala mingi te.
Kasi nakanisi ete ezali na tina mingi ya kotindela bino ndeko na ngai, Epafrodite, moninga na ngai ya mosala mpe ya etumba, ntoma oyo botindaki epai na ngai mpo na komemela ngai biloko oyo nazalaki na yango na bosenga. Pamba te azali na posa makasi ya komona bino nyonso mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo boyokaki ete azali kobela. Azalaki penza kobela kino akomaki pene ya kokufa, kasi Nzambe ayokelaki ye mawa, mpe ye moko kaka te kasi ngai mpe, mpo ete natonda na mawa te. Yango wana nazali kotinda ye noki penza mpo ete, tango bokomona ye lisusu, bosepela, mpe mawa na ngai esila. Boyamba ye na esengo makasi kati na Nkolo mpe bomemiaka bato ya lolenge wana, pamba te akomaki pene ya kokufa mpo na mosala ya Klisto : atiaki bomoi na ye kati na likama mpo na kopesa ngai lisungi oyo bino moko bokokaki te kopesa ngai.
Palavras de vida
As palavras de Deus são espírito e vida. Quem fala deve falar como oráculos de Deus, com verdade, sabedoria e edificação.
Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka
lokola mopanga,
kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali
lokola mafuta oyo ebikisaka.
Motema oyo etondi na komitungisa ekobuka moto,
kasi liloba ya esengo esepelisaka moto.
Monoko ya moto ya sembo ezali etima ya bomoi,
kasi monoko ya moto mabe ebombaka makambo mabe.
Eyano ya kimia ekimisaka kanda,
kasi maloba oyo ezokisaka ebakisaka kanda.
Moto atondisaka libumu na ye
na nzela ya mbuma ya monoko na ye
mpe akotonda na lifuti ya bibebu na ye.
Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo ;
moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.
Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka nde na motema, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo. Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.
Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, bato bakosamba mpo na maloba ezanga tina, oyo babimisaki. Pamba te ezali na nzela ya maloba na yo moko kaka nde bakolongisa yo to bakokweyisa yo.
Libota ya banyoka ! Bokokoka ndenge nini koloba makambo ya malamu awa bozali bato mabe ? Pamba te maloba ya moto etalisaka lolenge ya motema na ye :
Biso nyonso tobetaka mabaku na lolenge ebele. Moto oyo abetaka libaku te na maloba oyo ebimaka na monoko na ye azali moto ya kokoka mpe azali na makoki ya kobatela bomoto na ye nyonso.
Soki totiaka ebende na monoko ya mpunda, ezali mpo ete etosa biso ; mpe na nzela wana, tokambaka nzoto na yango nyonso. Tala masuwa : atako ezali monene mpe mopepe makasi etindikaka yango, kasi mwa yenda moke nde ekambaka yango mpo ete elanda nzela oyo kapitene ya masuwa alingi komema yango. Ezali mpe ndenge moko mpo na lolemo : ezali eteni moko ya moke kati na nzoto ya moto, kasi ekoki komikumisa na makambo minene penza. Tala, mwa moto moke ezikisaka zamba monene ! Lolemo mpe ezali moto ; kati na biteni ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili ya makambo mabe, ebebisaka nzoto mobimba. Soki ezwi moto ya lifelo, ezikisaka bomoi na biso mobimba.
Moto azali na makoki ya kokonza lolenge nyonso ya banyama, bandeke, banyama oyo etambolaka na libumu mpe bambisi, mpe akonza yango penza. Kasi mpo na lolemo, moko te akoki kokonza yango : ezali penza mabe, elembaka te mpe etonda na ngenge oyo ebomaka.
Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto. Natuna nanu : Boni, bayokaki te ? Iyo, bayokaki ! Pamba te ekomama :
« Mingongo na bango eyokanaki na mabele mobimba,
maloba na bango ekomaki kino na suka ya mokili. »