Pular para o conteúdo
Publicidade

O papel da mulher

Por Bíblia Online

A Bíblia honra a mulher como colaboradora essencial no plano de Deus. De Provérbios 31 às mulheres do Novo Testamento, a Escritura celebra a sabedoria, a força e a fé feminina.

A mulher virtuosa

Mulher virtuosa, quem a achará? Seu valor excede o de rubis. Ela é sábia, trabalhadora, generosa e temida pelo Senhor.

Masese mpo na mwasi ya lokumu

Nani akoki komona mwasi ya lokumu ?

Azali na motuya koleka babiju ya talo.

Mobali na ye atielaka ye motema

mpe azangaka te biloko ya motuya.

Tango nyonso ya bomoi na ye,

apesaka mobali na ye esengo, kasi mawa te ;

alukaka bapwale ya meme mpe basinga ya lino,

bongo maboko na ye etongaka yango na esengo.

Azali lokola masuwa ya bato ya mombongo,

akendaka koluka bilei na ye mosika ;

alamukaka wana butu ezali nanu,

abongisaka bilei mpo na ndako na ye

mpe akabolelaka basali na ye ya basi misala.

Soki asepeli na elanga, asombaka yango ;

mpe na mbuma ya misala na ye, alonaka elanga ya vino.

Akangaka loketo na ye makasi

mpe akembisaka maboko na ye na mosala.

Amonaka ete mombongo na ye etambolaka malamu ;

mpe kino na butu, mwinda na ye ekokufa te.

Maboko na ye esimbaka mitonga oyo batongelaka,

mpe misapi na ye etongaka bilamba.

Afungolaka loboko na ye mpo na kokabela babola,

mpe asembolaka yango mpo na kosunga bato bakelela.

Asalaka bilamba ya lino mpe atekaka yango,

asalaka mombongo ya mikaba.

Alataka lokola elamba : molende na mosala mpe lokumu ;

mikolo ya lobi ebangisaka ye te, asekaka nde yango.

Alobaka na bwanya,

mpe lolemo na ye epesaka malakisi na bolingo.

Azalaka na bokebi na makambo nyonso oyo elekaka na ndako na ye,

mpe aliaka lipa na bogoyigoyi te.

Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye,

kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango

na maboko na ye moko.

Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo,

mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;

Beleza interior

A beleza verdadeira não é exterior, mas o caráter incorruptível de um espírito manso e tranquilo. Isso tem grande valor diante de Deus.

Basi mpe mibali kati na libala

Bino mpe basi, botosaka mibali na bino mpo ete, soki ezali na ndambo ya mibali oyo bandimaka Liloba na Nzambe te, bakoma kondima na nzela ya bizaleli malamu ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te, tango bakomona bino kotambola na bomoi ya peto mpe ya botosi.

Bolukaka kaka te kokoma kitoko na libanda na nzela ya kokanga suki, kolata babiju ya wolo to bilamba ya kitoko ; kasi bolukaka nde kitoko ya bomoto ya kati : esilaka te, ewutaka na molimo ya boboto mpe ya kimia, ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe. Ezalaki ndenge wana nde basi ya bule oyo, na kala, bazalaki kotia elikya na bango na Nzambe bazalaki komikomisa kitoko. Bazalaki kotosa mibali na bango, lokola Sara oyo atosaki Abrayami kino kobenga ye « nkolo na ngai» Bozali bana basi ya Sara soki bosali bolamu mpe bopesi nzela te na bobangi.

Bino mpe mibali, bovandaka na bwanya elongo na basi na bino, boyebaka ete bazali bato na bolembu. Bopesaka bango lokumu, pamba te bango mpe basengeli kozwa elongo na bino bomoi kowuta na Nzambe, na ngolu na Ye, mpo ete eloko moko te ekanga losambo na bino.

Nalingi mpe ete basi balataka na ndenge oyo ebongi, oyo ekoki te kobetisa bato mabaku, mpe na ndenge ya lolendo te ; bakangisa suki te mpe balata te ezala biloko ya wolo, mayaka to bilamba ya talo makasi,

Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona ya basi. Basengeli kozala : basi oyo babongi na limemia, basi oyo batongaka bato te, basi oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango mpe basi ya sembo na makambo nyonso.

Parceria e dignidade

Deus criou homem e mulher à sua imagem. A mulher não é inferior, mas parceira e co-herdeira da graça da vida.

Nzambe akelaki bato na elilingi na Ye,

akelaki bango na elilingi ya Nzambe ;

akelaki bango mobali mpe mwasi.

Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike»

Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye»

Nzambe alobaki na mwasi :

« Nakobakisa pasi na zemi na yo ;

okobota na pasi.

Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo,

kasi ye akozala mokonzi na yo»

Nzokande, kati na Nkolo, mwasi azali te soki mobali azali te, mpe mobali azali te soki mwasi azali te. Pamba te ndenge mwasi akelamaki wuta na mobali, ndenge mpe mobali abotamaki na nzela ya mwasi. Kasi makambo nyonso ewutaka na Nzambe.

Basi, botosaka mibali na bino ndenge botosaka Nkolo. Pamba te mobali azali mokonzi ya mwasi, ndenge Klisto azali Mokonzi ya Lingomba oyo ezali nzoto na Ye, mpe Ye azali Mobikisi na yango. Kasi lokola Lingomba etosaka Klisto, tika ete basi mpe batosaka mibali na bango na makambo nyonso.

Teya mpe bamama mibange ete bazala na bizaleli oyo ekoki na bato oyo bamibulisa mpo na Nzambe : basengeli te kotongaka bato mpe kozala bawumbu ya masanga ; basengeli nde komipesa na koteyaka makambo ya malamu, mpo ete balakisa na bilenge basi kolinga mibali na bango mpe bana na bango, komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.

Seja o primeiro