Pular para o conteúdo
Publicidade

As 10 parábolas mais importantes de Jesus

Por Bíblia Online  - 

Jesus ensinou lições profundas por meio de parábolas, histórias curtas e simbólicas que comunicam verdades espirituais. Cada parábola tem um significado especial e atemporal, revelando o caráter de Deus e ensinando como viver como cristãos. Aqui estão 10 das parábolas mais marcantes e suas lições:

1. Parábola do Semeador (Mateus 13:3-9)

Azwaki maloba mpe akomaki koteya bango makambo ebele na masese ; azalaki koloba :

Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye. Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bandeke eyaki mpe eliaki yango. Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te, ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te ; kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ete ezalaki na misisa te. Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango ; kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma nkama moko ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma tuku misato. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !

A parábola do semeador fala sobre a receptividade das pessoas à Palavra de Deus. Cada tipo de solo representa diferentes maneiras de receber e aplicar o Evangelho em nossas vidas. Somente um coração fértil e comprometido pode dar frutos espirituais abundantes.

2. O Bom Samaritano (Lucas 10:25-37)

Lisese ya moto malamu ya mboka Samari

Molakisi moko ya Mobeko atelemaki mpe atunaki mpo na komeka Yesu :

Moteyi, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ?

Yesu alobaki na ye :

Makambo nini ekomama kati na mobeko ? Otangaka yango ndenge nini ?

Molakisi ya mibeko azongisaki :

Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso ; mpe linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.

Yesu alobaki na ye :

Opesi eyano ya malamu ; sala bongo mpe okozala na bomoi.

Kasi molakisi ya Mobeko alingaki kolakisa ete azali sembo, boye atunaki na Yesu :

Nani azali moninga na ngai ?

Yesu azongisaki :

Moto moko azalaki kokende na Jeriko, wana awutaki na Yelusalemi. Na nzela, miyibi babetaki ye, babotolaki ye bilamba na ye, babetaki ye mpe bakendeki na bango, batikaki ye pene ya kokufa. Nzokande, na tango yango kaka, esalemaki ete Nganga-Nzambe moko akende mpe azwa nzela yango kaka ; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye. Ndenge moko mpe Molevi moko akomaki na esika yango ; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye. Kasi moto moko ya Samari, wana azalaki kokende mobembo, akomaki na esika oyo moto yango azalaki ; tango kaka amonaki ye, ayokelaki ye mawa, apusanaki pene na ye, asopelaki bapota na ye mafuta mpe vino, mpe akangaki yango. Bongo amatisaki moto yango na likolo ya mile na ye moko, amemaki ye na ndako ya bapaya, mpe akobaki kosunga ye kuna. Mokolo oyo elandaki, abimisaki mbongo ya bibende mibale mpe apesaki yango na nkolo ndako ya bapaya ; alobaki na ye : « Salisa moto oyo malamu ; tango nakozonga, nakozongisela yo mbongo nyonso oyo okobakisa »

Yesu atunaki :

Mpo na yo, nani kati na bango misato azalaki moninga ya moto oyo akweyaki na maboko ya miyibi ?

Molakisi ya mibeko azongisaki :

Ezali moto oyo ayokelaki ye mawa.

Yesu alobaki na ye :

Kende mpe sala bongo !

Essa parábola nos ensina sobre o amor ao próximo, independentemente de raça ou religião. O samaritano ajudou um desconhecido, mostrando que a verdadeira fé se revela no amor ao próximo.

3. A Ovelha Perdida (Lucas 15:4-7)

Soki moko kati na bino azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi ; boni, akotika te bameme tuku libwa na libwa kati na esobe mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga kino amona yango ?

Mpe tango akomona yango, akotia yango na mapeka na ye, na esengo. Bongo, tango kaka akokoma na ndako na ye, akobengisa balingami mpe baninga na ye, akoloba na bango : « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni meme na ngai, oyo ebungaki »

Na nzela yango, nazali koloba na bino : esengo oyo ekozala kati na Likolo mpo na mosumuki moko kaka oyo abongoli motema, eleki esengo mpo na bato ya sembo tuku libwa na libwa oyo bazali na posa te ya kobongola mitema.

Deus é como o pastor que busca incessantemente uma ovelha perdida. Essa parábola revela o amor incansável de Deus pelos pecadores, celebrando a alegria no céu quando alguém se arrepende.

4. O Filho Pródigo (Lucas 15:11-32)

Lisese ya mwana oyo abungaki mpe amonani

Yesu alobaki lisusu :

Mobali moko azalaki na bana mibali mibale. Leki alobaki na tata na ye : « Tata, pesa ngai eteni na ngai ya libula»

Mpe tata akabolelaki bango biloko na ye.

Sima na mwa mikolo, leki azwaki biloko nyonso oyo azalaki na yango, akendeki na mboka moko ya mosika. Kuna, asakanaki na bozwi na ye, abikaki bomoi ya mobulu. Sima na ye kosakana na bozwi na ye nyonso, nzala makasi ekotaki kati na mboka yango mobimba, mpe akomaki kokelela.

Boye akendeki komikomisa lokola mosali epai ya moto moko ya mboka yango. Moto yango atindaki ye na bilanga na ye mpo na koleisa bangulu. Mwana alukaki ata kolia bilei ya bangulu, kasi moto ata moko te apesaki ye yango.

Bongo akomaki kokanisa na tina na bomoi na ye, alobaki : « Basali boni tata na ngai azwa na mosala mpe bazali kolia ndenge balingi, mpe biloko ya kolia eleki kutu ebele ; kasi ngai nazali kokufa awa na nzala ! Nazwi mokano ya kobima mpe kozonga epai ya tata na ngai ; nakoloba na ye : ‹ Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo. Nabongi lisusu te kobengama mwana na yo ; zwa ngai lokola moko kati na basali na yo › »

Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi ; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.

Mwana alobaki na tata na ye : « Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo, nabongi lisusu te kobengama mwana na yo»

Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye. Boya na mwana ngombe ya mafuta mpe boboma yango ; tolia mpe tosala feti, pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani »

Boye babandaki feti na esengo makasi.

Na tango yango, kulutu na ye azalaki nanu kati na bilanga. Tango akomaki pene ya ndako, ayokaki miziki mpe makelele ya mabina. Boye abengaki moko kati na basali mpe atunaki ye makambo oyo ezali koleka. Mosali azongisaki : « Ndeko na yo azongi ! Tata na yo abomi mwana ngombe ya mafuta, pamba te amoni ye nzoto malamu mpe nzoto kolongono»

Kulutu asilikaki makasi mpe aboyaki kokota. Boye tata na ye abimaki mpe abondelaki ye. Kasi azongiselaki tata na ye : « Tala ! Mibu nyonso oyo nazalaki kosalela yo lokola mowumbu, natikalaki koboya te kotosa mitindo na yo. Nzokande, otikala nanu kopesa ngai te ata mwana ntaba mpo ete nasepela elongo na balingami na ngai. Kasi tango mwana na yo, oyo ya mobali azongi na ndako, ye oyo asili kosakana na biloko na yo, na mobulu elongo na basi ya ndumba, obomi mwana ngombe ya mafuta mpo na ye »

Tata azongiselaki ye : « Mwana na ngai, ozalaka elongo na ngai tango nyonso, mpe biloko na ngai nyonso ezali ya yo. Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani »

A parábola do filho pródigo fala sobre o perdão e o amor incondicional de Deus por Seus filhos, mesmo quando se desviam.

5. A Pérola de Grande Valor (Mateus 13:45-46)

Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na moto ya mombongo, oyo alukaka bapawuni ya kitoko. Soki amoni mayaka moko ya talo makasi, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba yango.

Jesus ensina que o Reino de Deus é o bem mais precioso e devemos estar dispostos a renunciar tudo para possuí-lo.

6. O Fariseu e o Publicano (Lucas 18:9-14)

Lisese ya Mofarizeo mpe mofutisi mpako

Epai ya bato oyo bamimonaki bato ya sembo mpe batiolaki bato mosusu, Yesu alobaki lisusu lisese oyo :

Bato mibale bakendeki na Tempelo mpo na kosambela : moko azalaki Mofarizeo ; mpe mosusu, mofutisi mpako. Mofarizeo abendanaki ye moko na pembeni mpe asambelaki : « Oh Nzambe, nazali kotonda Yo, mpo ete nazali te lokola bato mosusu oyo bazali miyibi, bato mabe, bato na bikobo to mpe lokola mofutisi mpako oyo. Nakilaka bilei mbala mibale na poso mpe napesaka eteni ya zomi ya nyonso oyo nazwaka»

Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika ; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki : « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu »

Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.

Essa parábola nos lembra que Deus valoriza um coração humilde e arrependido, em contraste com a arrogância espiritual. O publicano, ao reconhecer seus pecados, foi justificado diante de Deus.

7. Os Talentos (Mateus 25:14-30)

Lisese ya basali misato

Ekozala lisusu lokola moto moko oyo, wana akomaki pene ya kokende na mobembo, abengaki basali na ye mpe apesaki bango mokumba ya kobatela bozwi na ye. Apesaki na mosali ya liboso batalanta mitano ; na mosali ya mibale, batalanta mibale ; mpe na mosali ya misato, talanta moko. Apesaki bango yango kolanda makoki ya moko na moko, mpe akendeki na mobembo. Mosali oyo azwaki batalanta mitano abandaki mbala moko kobalola yango na mombongo, mpe mombongo yango ebotaki batalanta mosusu mitano lokola mileki. Mosali oyo azwaki batalanta mibale asalaki mpe ndenge moko. Mombongo na ye ebotaki batalanta mosusu mibale lokola mileki. Kasi moto oyo azwaki kaka talanta moko atimolaki libulu kati na mabele mpe abombaki talanta ya nkolo na ye.

Sima na mikolo ebele, nkolo ya basali wana azongaki mpe alobaki na bango : « Boyebisa ngai ndenge nini bosalelaki bozwi na ngai»

Mosali oyo azwaki batalanta mitano apusanaki mpe amemaki batalanta mitano mosusu oyo azwaki lokola mileki. Alobaki : « Nkolo na ngai, opesaki ngai batalanta mitano ; tala, nazwi batalanta mitano mosusu lokola mileki»

Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo»

Mosali oyo azwaki batalanta mibale ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, opesaki ngai batalanta mibale ; tala, nazwi batalanta mibale mosusu lokola mileki»

Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo»

Bongo mosali oyo azwaki talanta moko ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nayebaki ete ozali moto ya matata, obukaka bambuma na elanga oyo olonaki te mpe olokotaka bambuma na esika oyo obwakaki ata nkona moko te. Yango wana, nabangaki mpe nakendeki kobomba talanta na yo na se ya mabele. Tala yango oyo, kamata talanta na yo»

Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe mpe ya goyigoyi ! Lokola oyebaki ete nabukaka bambuma na elanga oyo nalonaki te mpe nalokotaka bambuma na esika oyo nabwakaki ata nkona moko te, mpo na nini opesaki te talanta na ngai epai ya babombi misolo mpo ete, na bozongi na ngai, nakoka kozwa yango elongo na mileki ? Bobotola ye talanta yango mpe bopesa yango epai ya moto oyo azali na batalanta zomi. Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu, mpe akokoma na bofuluki ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango. Bongo na oyo etali mosali mabe oyo, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali»

Nesta história, Jesus ensina sobre a responsabilidade de usar bem os dons e recursos que Deus nos confiou. A fidelidade nas pequenas coisas abre portas para bênçãos maiores.

8. O Rico e Lázaro (Lucas 16:19-31)

Moto ya bomengo mpe mobola Lazare

Ezalaki na mozwi moko oyo azalaki kolata bilamba ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko, bongo azalaki kobika bomoi ya bisengo mikolo nyonso. Na liboso ya ekuke ya ndako na ye, mobola moko atandamaki wana, kombo na ye ezalaki Lazare, nzoto na ye mobimba etonda na bapota ; azalaki koluka ata kolia biloko oyo ezalaki kokweya longwa na mesa ya mozwi, kasi ezalaki bambwa nde ezalaki koya kolembola bapota na ye.

Mokolo moko, mobola yango akufaki, mpe ba-anjelu bamemaki ye epai ya Abrayami. Mozwi mpe akufaki, mpe bakundaki ye. Kati na mboka ya bakufi, mozwi azalaki konyokwama na pasi makasi ; boye atombolaki miso mpe amonaki, na mosika, Abrayami elongo na Lazare avanda pembeni na ye.

Mozwi akomaki koganga : « Tata Abrayami, yokela ngai mawa ! Tinda Lazare ete atia songe ya mosapi na ye kati na mayi mpo ete atangisela ngai mayi na lolemo, pamba te nazali koyoka pasi makasi kati na moto oyo»

Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi. Lisusu, libulu moko monene ekaboli biso mpe bino, mpo ete moto nyonso oyo alingi kolongwa awa epai biso tozali mpo na kokende epai na bino, akoka te ; mpe ete moto nyonso oyo alingi kokatisa libulu yango longwa kuna epai bino bozali mpo na koya awa epai na biso, akoka mpe te»

Mozwi alobaki : « Tata, nasengi na yo, tinda Lazare epai ya libota na ngai, pamba te nazali na bandeko mitano. Tika ete akende kokebisa bango mpo ete, bango mpe, bakoma awa te, kati na esika oyo ya pasi »

Abrayami azongisaki : « Bandeko na yo bazali na Moyize mpe basakoli ; tika ete bayoka bango »

Mozwi alobaki lisusu : « Te, tata Abrayami ! Kasi soki moto moko awuti na mboka ya bakufi mpe akei epai na bango, bakobongola mitema »

Abrayami alobaki na ye : « Soki baboyi koyoka Moyize mpe basakoli, bakondima mpe kaka te ata soki moto moko alamuki kati na bakufi»

A parábola alerta sobre as consequências de negligenciar os necessitados e viver para si mesmo. Também destaca a realidade do julgamento e da vida após a morte.

9. O Joio e o Trigo (Mateus 13:24-30)

Lisese ya matiti mabe

Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na moto oyo alonaki nkona ya malamu kati na elanga na ye. Wana bato nyonso balalaki pongi, monguna na ye ayaki, alonaki matiti mabe kati na elanga na ye ya ble mpe akendeki. Tango ble ebandaki kobota mpe kobimisa mito ya bambuma, matiti mabe mpe ekolaki. Basali ya nkolo elanga bayaki mpe balobaki : ‹ Mokonzi ; boni, olonaki te nkona ya malamu kati na elanga na yo ? Bongo matiti mabe oyo, ewuti wapi 

Nkolo elanga azongisaki : ‹ Ezali monguna nde asali bongo 

Basali batunaki lisusu : ‹ Olingi tokende kopikola yango 

Nkolo elanga azongisaki : ‹ Bokende te ! Pamba te wana bokobanda kolongola matiti mabe, bokoki mpe kopikola ble elongo na yango. Botika nyonso mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka bambuma. Ezali na tango wana nde nakoloba na bato oyo babukaka bambuma : Bolongola liboso matiti mabe, bokanga yango maboke-maboke mpe botumba yango ; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na Ngai ya bambuma› »

Essa história simboliza o bem e o mal coexistindo no mundo até o julgamento final, quando Deus fará a separação entre os justos e os ímpios.

10. As Dez Virgens (Mateus 25:1-13)

Lisese ya baseka zomi

Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala. Kati na bango, mitano bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele. Baseka oyo bazalaki bazoba bakamataki minda na bango, kasi bamemaki mafuta te ; ba-oyo bazalaki mayele bakamataki minda na bango mpe milangi oyo ezalaki na mafuta kati na yango.

Lokola mobali ya libala azalaki kowumela mpo na kokoma, baseka nyonso wana bayokaki pongi mpe balalaki. Na ngonga ya midi ya butu, mongongo moko eyokanaki : « Mobali ya libala ayei ! Bokende kokutana na ye »

Baseka nyonso balamukaki mpe babongisaki minda na bango. Baseka oyo bazalaki bazoba balobaki na ba-oyo bazalaki mayele : « Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso ekomi pene ya kokufa»

Kasi baseka oyo bazalaki mayele bazongisaki : « Te ! Ekokoka te mpo na biso mpe bino ! Ebongi nde bokima mbangu epai ya bateki mafuta mpo ete bosomba mafuta na bino moko»

Wana bazalaki kokende kosomba mafuta, mobali ya libala akomaki : baseka oyo bamilengelaki bakotaki elongo na mobali ya libala kati na ndako oyo basalelaka feti ya libala, mpe bakangaki ekuke.

Na sima, baseka mosusu mpe bayaki ; balobaki : « Nkolo, nkolo, fungolela biso ekuke » Kasi azongiselaki bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : nayebi bino te»

Boye bosenzela, pamba te boyebi mokolo te, boyebi mpe ngonga te.

Jesus enfatiza a necessidade de estarmos sempre preparados espiritualmente para Sua segunda vinda, pois ninguém sabe o momento exato.

As parábolas de Jesus continuam sendo fontes ricas de sabedoria e direção para a vida cristã. Ao aplicarmos esses ensinamentos, nos aproximamos mais de Deus e de Sua vontade.

Se este artigo te ajudou, faça sua parte e compartilhe a Palavra de Deus com aqueles que você ama.

Seja o primeiro