Páscoa
A Páscoa é a celebração suprema da redenção. Do cordeiro pascal no Egito ao Cordeiro de Deus que tira o pecado do mundo, ela aponta para o sacrifício e a vitória de Cristo.
A caminhada para a cruz
Jesus entrou em Jerusalém como Rei humilde, e a multidão o aclamou. Ele sabia do sofrimento que viria, mas caminhou em obediência até o fim.
Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga :
« Ozana na Mwana na Davidi !
Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo !
Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »
Yawe, nabondeli Yo, pesa lobiko.
Yawe, nabondeli Yo, pesa elonga.
Tika ete apambolama,
Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo !
Tozali kopambola bino
wuta na Tempelo ya Yawe.
Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi !
Yelusalemi, mboka kitoko,
ganga penza na esengo !
Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo,
azali sembo mpe molongi,
atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane,
na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.
« Boyoka ! Tozali solo kokende na Yelusalemi ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mobeko ; bakokatela Ye etumbu ya kufa mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano mpo ete baseka Ye, babeta Ye fimbu mpe babaka Ye na ekulusu. Mpe na mokolo ya misato, akosekwa. »
A paixão de Cristo
Jesus foi zombado, açoitado e crucificado. Ele orou no Getsêmani e entregou sua vida voluntariamente, dizendo: 'Está consumado!'
Balongolaki Ye bilamba, balatisaki Ye nzambala ya motane, balatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali ; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »
Na likolo ya moto ya Yesu, batiaki makomi oyo mpo na kotalisa mpo nini bakatelaki Ye etumbu :
Moto oyo azali Yesu, Mokonzi ya Bayuda.
Azalaki kobondela :
— Tata ! Epai na Yo, nyonso ekoki kosalema ! Longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.
Yesu agangaki na mongongo makasi :
— Tata, nazongisi molimo na Ngai kati na maboko na Yo.
Sima na Ye koloba bongo, akataki motema.
Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki :
— Nyonso ekokisami.
Bongo, akitisaki moto mpe azongisaki molimo na Ye.
A ressurreição gloriosa
Ele não está aqui — ressuscitou! O túmulo vazio é a prova de que a morte foi derrotada e Cristo vive para sempre.
Kasi anjelu alobaki na basi : « Bobanga te ! Nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na ekulusu. Azali lisusu awa te, pamba te asili kosekwa, ndenge kaka alobaki. Boya kotala esika oyo nzoto na Ye ezalaki,
Kasi alobaki na bango :
— Bobanga te ! Bozali koluka Yesu ya Nazareti, oyo babakaki na ekulusu ? Azali awa te, asili kosekwa. Botala esika oyo batiaki Ye.
Azali lisusu awa te, asekwi. Bokanisa makambo oyo ayebisaki bino, wana azalaki nanu kati na Galile : « Esengeli ete bakaba Mwana na Moto na maboko ya bato ya masumu ; esengeli ete babaka Ye na ekulusu ; mpe esengeli ete asekwa sima na mikolo misato. »
Bongo moyekoli oyo akomaki moto ya liboso kuna na kunda, ye mpe akotaki kati na kunda ; amonaki mpe andimaki. Kasi kino na tango wana, basosolaki nanu te ete Yesu asengelaki kosekwa kati na bakufi, kolanda ndenge Makomi ezali koloba.