Publicidade

Pecado

Por Bíblia Online

O pecado é a realidade que separa a humanidade de Deus. Mas a Bíblia também revela a solução: o sangue de Cristo que nos purifica e a graça que nos liberta de toda condenação.

A universalidade do pecado

Todos pecaram e carecem da glória de Deus. Não há justo, nem sequer um. O pecado entrou no mundo por um homem, mas a graça veio por Jesus.

pamba te bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe ;

pamba te bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe ; mpe bato nyonso bakomi bato ya sembo na ofele, na ngolu na Ye, na nzela ya lisiko kati na Yesu-Klisto.

Yango wana, moto moko te akotangama lokola moto ya sembo na miso ya Nzambe mpo ete akokisi misala ya Mobeko, pamba te Mobeko epesaka kaka boyebi ya lisumu.

Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

Moko te azali kobelela Kombo na Yo

to kolamusa makanisi mpo na kokangama na Yo,

pamba te obombeli biso elongi na Yo

mpe obebisi biso likolo ya masumu na biso.

Moto nyonso oyo asalaka masumu abukaka mibeko ya Nzambe ; pamba te kosala lisumu ezali : kobuka mibeko ya Nzambe.

Liberdade da condenação

Não há condenação para os que estão em Cristo Jesus. Ele nos libertou da lei do pecado e da morte para vivermos em novidade de vida.

Molimo apesaka bomoi

Yango wana sik’oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto. Pamba te kati na Yesu-Klisto, Mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi ekangoli ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu mpe ya kufa.

Yango wana, tika ete lisumu ezala lisusu na bokonzi te kati na banzoto na bino, oyo ekokufa ; mpe bosengeli lisusu te kotosa baposa na yango ya mabe. Bokaba biteni ya banzoto na bino te na lisumu lokola bisalelo mpo na mabe, kasi bomikaba bino moko epai na Nzambe lokola bato oyo basekwa kati na bakufi mpe bazali na bomoi ; mpe bokabela Ye biteni ya banzoto na bino lokola bisalelo mpo na bosembo. Pamba te lisumu ekozala lisusu na bokonzi te likolo na bino, pamba te bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi na se ya ngolu.

Boye toloba nini ? Tokoba kosala masumu mpo ete tozali na se ya bokonzi ya Mobeko te kasi na se ya ngolu ? Soki moke te ! Boni, boyebi te ete soki bomikabi epai ya moto lokola bawumbu mpo na kotosa ye bokomi nde bawumbu ya moto oyo bozali kotosa to bawumbu ya lisumu oyo ememaka na kufa to bawumbu ya botosi oyo ememaka na bosembo ? Kasi tika ete tozongisa matondi epai ya Nzambe ! Soki na kala bozalaki bawumbu ya lisumu, kasi sik’oyo bokomi kotosa na motema mobimba mateya oyo bateyaki bino, bosili kokangolama na bowumbu ya lisumu mpe bokomi bawumbu ya bosembo.

Boye toloba nini ? Tokoba kosala masumu mpo ete tozali na se ya bokonzi ya Mobeko te kasi na se ya ngolu ? Soki moke te !

Toyebi ete Mobeko epesamaki na nzela ya Molimo na Nzambe ; kasi ngai nazali kaka moto, natekama mpo na kozala mowumbu ya lisumu. Nasosolaka te makambo oyo nasalaka : oyo nalingaka kosala, nasalaka yango te ; kasi oyo nayinaka, yango nde nasalaka. Mpe soki nasalaka makambo oyo naboyaka kosala, wana nandimi ete Mobeko ezali malamu. Lokola ezali bongo, emonani ete ezali ngai te moto nasalaka yango, kasi ezali nde lisumu oyo evandaka kati na ngai.

Yesu azongiselaki bango :

Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo asalaka masumu azali mowumbu ya lisumu.

Confissão e perdão

Se confessarmos os nossos pecados, Deus é fiel e justo para nos perdoar e purificar de toda injustiça. A confissão liberta a alma.

Soki tolobi ete tozali na masumu te, wana tozali komikosa biso moko mpe solo ezali te kati na biso. Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.

Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.

Soki tolobi ete tozali moko na Ye, nzokande tozali kotambola kati na molili, wana tozali bakosi mpe tozali kotambola na solo te.

Nasali masumu epai na Yo

Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki tango mosakoli Natan akomaki epai ya Davidi sima na ye kosala ekobo elongo na Batisheba.

Sukola ngai mobimba

mpo na kolongola mabe na ngai,

mpe petola ngai na masumu na ngai.

Pamba te nayebi mabe na ngai,

mpe masumu na ngai ezalaka

tango nyonso liboso na ngai.

Epai na Yo, epai na Yo kaka,

nasali masumu mpe mabe na miso na Yo.

Boye, okozala sembo tango okozwa mokano,

mpe okozala na pamela te tango okokata makambo.

Solo, nabotamaki kati na lisumu ;

wuta na libumu ya mama na ngai,

nazali mosumuki.

Nzokande Yo, osepelaka na bosembo,

ata kati na libumu ;

mpe okoteya ngai bwanya

kati na esika ebombama.

Petola ngai na nzela ya izope,

mpe nakokoma peto ;

sukola ngai, mpe nakokoma pembe

koleka mvula ya pembe.

Tango nandimaki masumu na ngai

mpe nabombaki mabe na ngai te,

nalobaki : « Nakotubela

masumu na ngai liboso ya Yawe»

Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.

Bolimbisi epesaka esengo

Nzembo ya Davidi.

Esengo na moto oyo mabe na ye elimbisami,

mpe masumu na ye elongwe !

Yawe, mpo na bolingo ya Kombo na Yo,

limbisa masumu na ngai,

atako ezali minene.

Yawe, kanisa mawa mpe bolingo na Yo,

pamba te ezali mpo na libela na libela.

Yawe, kokanisa te masumu

mpe botomboki ya bolenge na ngai ;

kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo,

pamba te ozali malamu.

Epesaka mosali na Yo mayele ;

moto nyonso oyo atosaka yango azwaka litomba mingi.

Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te,

kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.

Vencendo o pecado

Cristo nos resgatou e nos restaurou. Devemos mortificar as obras da carne, fugir do pecado e prosseguir em santidade.

Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.

Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango»

Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye»

ndenge wana mpe Klisto, oyo amikabaki lokola mbeka mbala moko mpo na kolongola masumu ya bato ebele, akoya na mbala ya mibale, mpo na kolongola masumu ya bato te, kasi mpo na kobikisa bato oyo bazali kozela Ye na posa makasi.

Moto oyo amipesaka na masumu azali ya Satana, pamba te Satana asalaka masumu wuta na ebandeli. Nzokande Mwana na Nzambe ayaki penza mpo na kobebisa misala ya Satana.

Toyebi ete moto nyonso oyo abotami na bomoi ya bonzambe akobaka te kosala lisumu ; Ye moko Mwana na Nzambe abatelaka ye, mpe Satana akoki kosala ye mabe te.

Bomoi ya sika

Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.

Tika ete kindumba, lolenge nyonso ya makambo ya soni mpe lokoso etangamaka kutu te kati na bino, pamba te ebongi te mpo na basantu.

Bosanganaka te na misala ya molili, oyo ebotaka mbuma te, kasi bobimisaka yango na pwasa. Pamba te makambo nyonso oyo esalemaka na nkuku ezalaka soni mpo na kolobela yango.

Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; kanda na bino esengeli kosila liboso ete pokwa ekoma.

Responsabilidade e restauração

O pecado tem consequências, mas Deus restaura o arrependido. Devemos corrigir uns aos outros com mansidão e cobrir o pecado com amor.

Kosala bolamu mpo na bato nyonso

Bandeko na ngai, soki bokuti moto azali kosala mabe songolo, bino oyo bozali kotambola kolanda Molimo ya Nzambe bozongisa ye na nzela, na boboto nyonso. Kasi sala keba ete yo mpe omekama te.

Kosala bolamu mpo na bato nyonso

Bandeko na ngai, soki bokuti moto azali kosala mabe songolo, bino oyo bozali kotambola kolanda Molimo ya Nzambe bozongisa ye na nzela, na boboto nyonso. Kasi sala keba ete yo mpe omekama te. Bomemisana mikumba bino na bino ; ezali na nzela wana nde bokokokisa mobeko ya Klisto.

Ndenge nini kolimbisa ndeko oyo asali yo mabe

Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende kotalisa ye mabe na ye na esika ya bino mibale kaka. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ye na nzela malamu.

Ndenge nini kolimbisa ndeko oyo asali yo mabe

Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende kotalisa ye mabe na ye na esika ya bino mibale kaka. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ye na nzela malamu.

Makebisi

Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale.

Mpo na nini ozali kotala mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo, wana ozali komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko ?

Pamba te soki bolimbisi baninga, na mabe oyo basali bino, Tata na bino ya Likolo mpe akolimbisa bino ;

Yango wana, tika ete moko na moko ayambola masumu na ye epai ya moninga na ye, mpe tika ete moko na moko abondela mpo na moninga na ye, mpo ete bobikisama na bokono. Libondeli ya moto ya sembo ezali na nguya makasi mpe esalaka makambo ya kokamwa.

Moto oyo ayebi kosala bolamu, kasi asali yango te, asali masumu.

Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino ; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino !

Bato na ekobo ! Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe ? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili amikomisi monguna ya Nzambe.

Ezala lipamboli to elakeli mabe, nyonso ebimaka kaka na monoko moko. Bandeko na ngai, esengelaki te kozala bongo.

Liboso na nyonso, bolinganaka makasi, pamba te bolingo ezipaka masumu ebele.

Fuga do pecado

Bem-aventurado o que não anda no conselho dos ímpios. O caminho do justo é guardado pelo Senhor, e sua Palavra nos protege da queda.

Mibeko ya Yawe ezali etima ya mapamboli

Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe,

atelemaka te na nzela ya bato ya masumu,

mpe avandaka te esika moko na batioli,

Lendisa bomoi na ngai na nzela ya liloba na Yo

mpe pekisa mabe ete ekonza ngai te.

Moto ya sembo atambolaka na kimia,

kasi moto oyo atambolaka na banzela etengama-tengama

akobima na pwasa.

Moto malamu abimisaka bolamu kowuta na makambo malamu oyo etondi kati na motema na ye, mpe moto mabe abimisaka mabe kowuta na makambo mabe oyo etondi kati na motema na ye. Pamba te monoko elobaka kolanda makambo oyo etondi kati na motema.

Boyebi te ete bato mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe ? Bomikosa te : bato na pite, basambeli bikeko, bato na bikobo, bato oyo balula makambo ya soni, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, miyibi, bato ya lokoso ya mbongo, balangwi masanga, bato oyo bakoselaka baninga makambo mpo na kobebisa lokumu na bango, ba-oyo babotolaka biloko ya bato, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.

Pilato abimaki lisusu mpe alobaki na bango :

Botala ! Nayei na Ye na libanda epai na bino mpo boyeba ete ngai nazwi Ye na mabe moko te.

Boye, Yesu abimaki alata ekoti ya nzube mpe nzambala ya motane. Pilato alobaki na bango :

Moto yango, ye oyo !

Tango kaka bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakengeli bamonaki Yesu, babandaki koganga :

Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu !

Kasi Pilato azongisaki :

Bino moko, bokamata ye mpe bobaka ye na ekulusu ; ngai nazwi ye na mabe ata moko te.

Bato oyo bokolimbisa masumu na bango, masumu na bango ekolimbisama ; kasi ba-oyo bokolimbisa te, bakozwa mpe bolimbisi te.

Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-