Planejamento
O planejamento é sábio, mas deve sempre se submeter à vontade de Deus. A Bíblia ensina que devemos planejar com prudência, mas confiar que Deus dirige nossos passos.
Planejar com sabedoria
Contar nossos dias nos ensina a ter coração sábio. O planejamento prudente é elogiado na Escritura como expressão de bom senso.
Lakisa biso kotanga malamu
mikolo ya bomoi na biso
mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.
Soki moko kati na bino alingi kotonga ndako molayi, boni, bokovanda nanu te mpe bokoluka nanu te koyeba motuya mpo na kotala soki bozali na mbongo ya kokoka mpo na kosilisa misala ya kotonga ndako yango ?
Mabongisi ekokisamaka te soki bato basangani te
mpo na kopesa mayele,
kasi ekokisamaka malamu soki bapesi toli bazali ebele.
Pesa misala na yo epai na Yawe,
mpe mabongisi na yo ekokokisama.
Koboma nzoto te mpo na koluka kozwa bomengo,
kotia mayele na yo te kati na yango.
Deus dirige os passos
O coração do homem planeja, mas a resposta certa vem do Senhor. Seus caminhos são mais altos que os nossos, e seus planos prevalecem.
Motema ya moto esalaka mabongisi,
kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.
Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele,
kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.
« Makanisi na Ngai ezali makanisi na bino te,
mpe banzela na Ngai ezali banzela na bino te, »
elobi Yawe.
« Pamba te ndenge likolo eleki mosika na mabele,
ndenge wana mpe banzela na Ngai ezali
likolo koleka banzela na bino,
mpe makanisi na Ngai ezali likolo
koleka makanisi na bino.
Nyonso wana mpe ewuti epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga,
oyo mabongisi na Ye ezali ya kitoko makasi
mpe bwanya na Ye ezali monene.
Confiança no plano de Deus
Os planos do Senhor são de paz e esperança. Ele revela seus segredos aos seus servos e guia com fidelidade cada caminho confiado a Ele.
Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.
Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te
soki alakisi mabongisi na Ye te
epai ya basali na Ye, basakoli.
Tika ete akanisa makabo na yo nyonso
mpe andima mbeka na yo ya kotumba.
Na tongo makasi, sala ete nayoka boboto na Yo,
pamba te natia elikya na ngai kati na Yo.
Lakisa ngai nzela ya kolanda,
pamba te napesi bomoi na ngai epai na Yo.
Likambo nyonso ezalaka na tango na yango
Likambo nyonso ezalaka na tango na yango,
mpe mosala nyonso ezalaka na ngonga na yango,
na se ya moyi.
Nzokande, Nzambe atalisaki biso yango na nzela ya Molimo na Ye ; pamba te Molimo ayebaka nyonso, ezala bozindo ya makanisi ya Nzambe.
Kolulaka te moto ya mobulu
mpe koponaka ata nzela moko te,
kati na banzela na ye.
Pamba te Yawe ayinaka bato mabe,
kasi ayebisaka basekele na Ye epai ya bato ya sembo.