Descansar no Senhor
Descansar no Senhor é um ato de fé. Em um mundo agitado, Deus nos convida a entregar nossas ansiedades, aquietar o coração e confiar plenamente em sua provisão e cuidado.
O convite ao descanso
Jesus convida os cansados e sobrecarregados a irem a Ele e encontrar descanso para as suas almas. O jugo dele é leve.
Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi. Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi. Solo, ekangiseli na Ngai ezali pasi te, mpe mokumba na Ngai ezali pepele.
Batela kimia liboso ya Yawe
mpe talela Ye ;
kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye,
mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe.
Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili,
akataka batolotolo, abukaka makonga
mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba.
Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ;
libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai
ezali kati na Nzambe.
Confiança e paz
Quem confia no Senhor encontra paz perfeita. A ansiedade perde o poder quando entregamos tudo nas mãos do Deus soberano.
Ndenge esila kokatama,
ye oyo akomitika epai na Yo,
okobatela ye na kimia, na kimia penza,
mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe,
Mosantu ya Isalaele, alobi :
« Ekozala kati na kobongola mitema mpe kimia
nde bokozwa lobiko na bino ;
ekozala na nzela ya kimia mpe ya elikya
nde bokozwa makasi na bino ;
kasi bino, bolingi bongo te.
Mbuma ya bosembo ekozala kimia :
bosembo ekobota bopemi mpe bobatelami mpo na libela.
basi bato oyo batiaka elikya na Yawe,
Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika :
bapumbwaka likolo lokola bampongo,
bapotaka mbangu mpe bapemaka te,
batambolaka mpe balembaka te.
Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.
Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.
Esperar no Senhor
Esperar no Senhor renova as forças. A Bíblia nos ensina que aquietar-se diante de Deus e confiar em seu tempo é marca da maturidade espiritual.
Talela Yawe !
Zala makasi mpe yika mpiko !
Talela Yawe !
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali,
nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ;
maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta,
nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko
mosali oyo azali sembo na miso na Ye ;
Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.
Yawe azali malamu
mpo na bato oyo batielaka Ye elikya,
mpo na bato oyo balukaka Ye !
Ezali malamu kozela na kimia
lobiko kowuta na Yawe !
A fidelidade de Deus
Deus é fiel. Seus planos são de paz e esperança. Podemos descansar sabendo que Ele guarda e sustenta quem nele confia.
Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu. Boye bokobelela Ngai, bokoya epai na Ngai mpe bokobondela Ngai ; mpe Ngai nakoyoka bino. Bokoluka Ngai mpe bokomona Ngai, soki boluki Ngai na motema na bino mobimba.
Kasi tika ete moto oyo atiaka elikya na Yawe
mpe atalelaka Ye apambolama !
Akozala lokola nzete oyo balona pembeni ya mayi,
oyo epanzaka misisa na yango kino na mayi :
ezalaka na somo ya moyi makasi te ;
makasa na yango ezalaka kaka mibesu tango nyonso.
Ezalaka na somo ya koya ya mobu ya bokawuki te
mpe ebotaka mbuma tango nyonso. »
Yawe azongisaki :
— Ngai moko nakotambola elongo na yo mpe nakopesa yo bopemi.
Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.
Asa azalaki na mampinga ya basoda nkoto nkama misato ya bato ya Yuda, oyo bazalaki komema banguba minene mpe makonga, mpe ya basoda nkoto nkama mibale na tuku mwambe ya bato ya Benjame, oyo bazalaki komema banguba mike mpe kobeta matolotolo : bango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba.
Wana bazalaki kokende mpe bakomaki na mondelo ya engumba, Samuele alobaki na Saulo : « Loba na mosali na yo ete aleka liboso na biso. » Boye mosali alekaki liboso, mpe Samuele alobaki lisusu na Saulo : « Telema awa sik’oyo mpo ete napesa yo sango oyo ewuti epai ya Nzambe. »