Saúde
A saúde é uma bênção de Deus. A Bíblia ensina que Deus é nosso curador, que devemos cuidar do corpo como templo do Espírito e que a alegria do Senhor renova nossas forças.
Deus, o nosso curador
O Senhor é quem sara todas as nossas doenças. Ele prometeu abençoar o pão e a água e tirar as enfermidades do meio do seu povo.
Soki bokosalela Yawe, Nzambe na bino, akopambola mapa mpe mayi na bino, mpe akolongola bokono kati na bino.
Abikisaka bato oyo batutami na mitema
mpe akawusaka bapota na bango.
Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.
Kasi lokola Yesu ayokaki Bafarizeo koloba bongo, alobaki na bango :
— Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.
O corpo como templo
Nosso corpo é templo do Espírito Santo. A Bíblia nos encoraja a cuidar da saúde física com disciplina e reverência a Deus.
Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe ? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te ? Bosikolamaki na motuya makasi penza. Boye, bopesa Nzambe nkembo kati na banzoto na bino.
pamba te masano ya nzoto ezali na tina mpo na ndambo ya makambo, kasi botosi kati na makambo ya Nzambe ezali na tina mpo na nyonso, pamba te ezali na elaka ya bomoi mpo na tango oyo mpe mpo na tango oyo ezali koya.
Molingami na ngai, posa makasi ya motema na ngai ezali ete okende liboso na makambo na yo nyonso, mpe ozala na nzoto kolongono, ndenge molimo na yo ezali kokola.
Tika ete omimonaka te moto ya bwanya
na miso na yo moko ;
tosa Yawe mpe longwa na mabe.
Ekozala kisi mpo na kokomisa nzoto na yo kolongono
mpe kolendisa mikuwa na yo.
A alegria que cura
O coração alegre é bom remédio. A esperança do coração traz alegria, e as palavras agradáveis são como favo de mel — doçura para a alma e saúde para o corpo.
Motema ya esengo ebikisaka nzoto,
kasi motema oyo etutami ebukaka mikuwa.
Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi,
epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa.
Elikya oyo ekokisami te epesaka bokono na motema,
kasi posa oyo ekokisami ezali nzete ya bomoi.
Yango wana, longola mawa na motema na yo,
longola pasi na nzoto na yo ;
pamba te bolenge mpe bomwana ezali pamba.