Publicidade

Temor do Senhor

Por Bíblia Online

O temor do Senhor é o princípio da sabedoria. Não se trata de medo, mas de reverência profunda, respeito e admiração diante da santidade e grandeza de Deus.

O princípio da sabedoria

A Escritura afirma que temer ao Senhor é o primeiro passo para a verdadeira sabedoria. Quem teme a Deus discerne o certo e aprende a viver com prudência.

Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ;

bato nyonso oyo batosaka Yawe

bazali na mayele ya peto.

Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.

Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ;

koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.

Kotosa Yawe ezali eteyelo ya bwanya ;

komikitisa eyaka liboso ya nkembo.

Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya !

Koboya mabe, yango nde mayele »

Mitindo ya Yawe ezali alima,

esepelisaka motema ;

malako na Ye ezali peto,

epesaka bososoli.

Kotosa Yawe ezali peto,

ewumelaka libela na libela.

Mitindo ya Yawe ezali ya solo,

nyonso ezali penza sembo.

Ezali na motuya koleka wolo,

koleka wolo ebele ya peto,

wolo oyo basangisa na eloko mosusu te ;

eleki mafuta ya nzoyi na elengi,

mafuta ya nzoyi oyo ezali kobima sika.

Bênçãos do temor

Quem teme ao Senhor encontra vida longa, provisão e proteção. O temor de Deus nos guarda do mal e nos conduz à humildade.

Komikitisa mpe kotosa Yawe ememaka

bozwi, lokumu mpe bomoi.

Kotosa Yawe eyeisaka bomoi molayi,

kasi bomoi ya bato mabe ekokoma mokuse.

Kotosa Yawe ezali etima ya bomoi,

ekangolaka na mitambo ya kufa.

Bolingo mpe bosembo elongolaka mbeba ;

kotosa Yawe etindaka moto kokima mabe.

Esengo na moto oyo abangaka tango nyonso kosala mabe,

kasi ye oyo ayeisaka motema na ye libanga akweyaka kati na pasi.

Anjelu ya Yawe atongaka molako na ye

zingazinga ya bato oyo batosaka Yawe,

mpe akangolaka bango.

Bomeka elengi mpe botala

ndenge nini Yawe azali malamu ;

Esengo na moto oyo azwaka Yawe

lokola ebombamelo na ye !

Vivendo no temor do Senhor

Temer ao Senhor é obedecer seus mandamentos, andar em seus caminhos e amá-lo de todo coração. Essa reverência se expressa em justiça e integridade.

bosengeli te koyoka maloba ya mosakoli wana to ya moto wana oyo amonaka makambo. Yawe, Nzambe na bino, akomeka bino mpo na kotala soki bolingi Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba.

Tosaka mitindo ya Yawe, Nzambe na yo, na kotambolaka na banzela na Ye mpe na kopesaka Ye lokumu.

Bosalela Yawe na kobanga

mpe bosepela na kolenga.

Bana ya nkosi ezangaka mpe ekufaka nzala,

kasi bato oyo balukaka Yawe

bakozanga eloko moko.

Bana na ngai, boya, boyoka ngai ;

Nakolakisa bino kotosa Yawe.

Nani asepelaka na bomoi ?

Nani alingaka kobika mikolo ebele ya esengo ?

Batela lolemo na yo mosika na mabe,

mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te.

Sik’oyo, tika botosi ya Yawe ezala kati na bino. Bokata makambo na bosolo ; pamba te epai na Yawe, Nzambe na biso, makambo oyo ezalaka te : kozanga bosembo, kopona bilongi mpe kanyaka»

Okolakela mabe te moto oyo akufa matoyi mpe okotia libaku te liboso ya mokufi miso, kasi okotosa Nzambe na yo. Nazali Yawe.

Tika ete moko te akosa moninga, kasi banga Nzambe na yo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.

Lisungi epai ya babola

Soki moto oyo azali pembeni na yo akomi mobola mpe azali lisusu te na makoki ya komisunga ; okosunga ye, azala mopaya to moleki nzela ; mpo ete azala malamu pembeni na yo. Okoki te kozwa mileki na maboko na ye ; kasi banga Nzambe na yo, mpo ete mwana mboka na yo akoka kozala malamu pembeni na yo.

Balingami na Ngai, nazali koloba na bino : bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto mpe, na sima, bakoki kosala likambo mosusu te. Nakolakisa bino nani oyo bosengeli kobanga : bobanga Ye oyo, sima na kufa, azali na bokonzi ya kobwaka kati na lifelo. Solo, nazali koloba na bino : Ye nde bosengeli kobanga.

Seja o primeiro
Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-29_22-07-56-