Pular para o conteúdo
Publicidade

Sobre ter filhos

Por Bíblia Online

Filhos são uma dádiva do Senhor, uma herança que Deus confia aos pais. A Bíblia celebra a maternidade e a paternidade como vocações sagradas e fontes de bênção.

Filhos: herança do Senhor

A Escritura declara que os filhos são bênção de Deus. Cada criança é um presente precioso confiado aos pais para ser cuidado com amor.

Bana bazali libula kowuta na Yawe,

mpe kobota bana ezali lifuti.

Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba,

ndenge wana mpe bana oyo moto aboti

na bolenge na ye bazali.

Esengo na moto oyo atondisi makonga

kati na ebombelo na ye ya makonga !

Akokufa soni ata moke te

tango akosamba elongo na banguna na ye

na ekuke ya engumba.

Kati na ndako na yo,

mwasi na yo azali lokola nzete ya vino

oyo ebotaka bambuma ebele ;

bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive

zingazinga ya mesa na yo.

Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye,

lokola mama ya esengo kati na bana na ye.

Bokumisa Yawe !

Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike»

Instruir nos caminhos de Deus

A Bíblia orienta os pais a instruir seus filhos nos caminhos do Senhor desde cedo, com dedicação, disciplina e exemplo.

Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ;

ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.

Bobatela malamu kati na mitema mpe milimo na bino maloba na ngai oyo, bokanga yango na maboko na bino lokola bilembo, mpe botia yango na bilongi na bino lokola elembo. Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki.

Batata, boyokisaka bana na bino kanda te, noki te mitema na bango ekolemba.

Pesa mwana na yo etumbu,

bongo okozala na kimia

mpe akotondisa motema na yo na esengo.

Cada vida é preciosa

Deus conhece e forma cada criança no ventre. Antes de nascer, Ele já nos separou e preparou um propósito para cada vida.

Liboso ete nasala yo kati na libumu ya mama na yo, nayebaki yo ; liboso ete obotama, nabulisaki yo : naponaki yo mpo ete ozala mosakoli ya bikolo.

Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai,

obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.

Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi.

Misala na Yo ezali ya kokamwa ;

ngai, nayebi yango malamu.

Na miso na Yo, nzoto na ngai ezalaki ya kobombama te

tango osalaki ngai na esika ebombama,

tango otongaki ngai kati na mozindo ya mabele.

Oh Yawe, Nkolo na biso,

Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba !

Ovandisi nkembo na Yo

kati na Lola.

Yesu alobaki :

Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.

Seja o primeiro