Publicidade

Tristeza

Por Bíblia Online

A tristeza faz parte da experiência humana, mas a Bíblia nos assegura que Deus está perto dos que sofrem. Ele enxuga as lágrimas e transforma a dor em esperança.

Deus consola os aflitos

O Senhor está perto dos quebrantados de coração. Mesmo no vale mais escuro, sua presença é refúgio e consolo para a alma que chora.

kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo

mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.

Tango bato ya sembo babelelaka,

Yawe ayokaka mpe akangolaka bango

na pasi na bango nyonso.

Yawe abikisaka miso ya bakufi miso ;

Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama ;

Yawe alingaka bato ya sembo.

Nalembi, makasi na ngai nyonso esili ;

mobulu ekoti na motema na ngai,

nakomi koganga na kolemba te.

Esengo na bato oyo bazali kolela,

pamba te bakobondisama !

Zonga epai ya Ezekiasi, mokonzi ya bato na Ngai, mpe loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‹ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Tala, nakobikisa yo ; mpe sima na lobi, okomata lisusu na Tempelo ya Yawe.

A alegria virá

A dor tem prazo de validade. A manhã de alegria sempre vem depois da noite de choro. Deus promete transformar o luto em dança.

Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe,

bino babulami na Ye ;

bokumisa Kombo na Ye ya bule.

Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba : « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango. Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka»

Bakoyoka lisusu nzala te,

posa ya mayi mpe koswa ya moyi to molunge ;

pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi

akozala Mobateli na bango,

akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi,

mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango.

koyebana lokola bato na mawa,

nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ;

koyebana lokola babola,

nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ;

koyebana lokola bato bakelela,

nzokande tozali na nyonso.

Entregando a dor a Deus

Podemos lançar sobre o Senhor toda nossa ansiedade e tristeza, porque Ele cuida de nós com ternura e não nos abandona.

Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.

Ye moko Yawe akotambola liboso na yo mpe akozala elongo na yo. Kobanga te mpe yika mpiko»

Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.

O choro e o arrependimento

Há tristezas que produzem arrependimento e conduzem à vida. O choro diante de Deus é acolhido e transformado em bênção.

Kozonga epai na Yawe

« Ezala sik’oyo» elobi Yawe,

« bozonga epai na Ngai na mitema na bino mobimba,

na kokila bilei, na mpinzoli mpe na kolela»

Bilanga ya vino ekawuki,

banzete ya figi elembi-lembi,

banzete ya grenade, ya mbila mpe ya pome,

banzete nyonso ya bilanga esili kokawuka.

Solo, esengo ya bato esili.

Yobo atelemaki, apasolaki kazaka na ye, akokolaki suki ya moto na ye, akweyaki na mabele mpe afukamaki. Alobaki :

« Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai,

mpe nakozonga bolumbu.

Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa ;

tika ete Kombo na Ye ekumisama »

Masese ya Salomo

Masese ya Salomo :

Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye,

kasi mwana ya zoba ayokisaka

mama na ye pasi na motema.

Pamba te kozala na bwanya mingi ememelaka moto pasi,

mpe kozala na mayele mingi etungisaka motema.

Yango wana, longola mawa na motema na yo,

longola pasi na nzoto na yo ;

pamba te bolenge mpe bomwana ezali pamba.

Boyokisaka Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te ; pamba te, na nzela ya Molimo yango, Nzambe abetaki bino kashe na Ye mpo na mokolo ya kokangolama.

Seja o primeiro
Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-29_22-07-56-