Publicidade

Vaso

Por Bíblia Online

A metáfora do vaso é uma das mais belas da Bíblia. Assim como o oleiro molda o barro, Deus nos forma segundo seus propósitos, fazendo de nós vasos úteis para sua glória.

Nas mãos do oleiro

Deus é o Oleiro e nós somos o barro. Ele tem autoridade e sabedoria para nos moldar conforme sua vontade perfeita, e não devemos questionar sua obra.

Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te ;

kokanisaka masumu na biso tango nyonso te !

Tala biso ndenge tozali kobondela,

pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.

Ndako ya mosali mbeki

Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi :

Kende na ndako ya mosali mbeki mpe, kuna, nakoyebisa yo makambo.

Boye, nakendeki na ndako ya mosali mbeki mpe nakutaki ye azali kosala mosala na ye. Kasi mbeki oyo azalaki kosala na mabele oyo basalelaka bikeko ezalaki kokangama ye na maboko. Bongo, mosali mbeki yango asalaki mbeki mosusu wuta na mbeki oyo ebebaki, asalaki yango lisusu kitoko kolanda posa ya motema na ye. Mpe kuna, Yawe alobaki na ngai :

Oh bana ya Isalaele, nakoki kosala bino te ndenge mosali mbeki oyo azali kosala, elobi Yawe ? Bana ya Isalaele, bozali te kati na maboko na Ngai lokola mabele oyo basalelaka bikeko kati na maboko ya mosali mbeki ?

Oh moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe ? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : « Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo » Mosali mbeki azali na bokonzi te ya kosala nzungu ya lokumu mpe nzungu oyo ezanga lokumu na nzela ya potopoto kaka moko ?

Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye,

ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele !

Boni, potopoto ekoki solo koloba

na moto oyo asali yango :

‹ Ozali kosala nini 

Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba :

‹ Azali na maboko te 

Bozali nde kobongola makambo !

Ezali lokola bozali kozwa mosali mbeki

ndenge moko na mabele oyo basalelaka mbeki.

Boni, eloko ekoki solo koloba na mosali na yango :

« Asalaki ngai te »

Mbeki ekoki solo koloba na mosali mbeki :

« Ozali mayele te »

Vasos para honra

O cristão é chamado a ser um vaso de honra, purificado e preparado para toda boa obra. Nosso valor está em quem nos formou e no que carregamos.

Kati na ndako ya monene, ezalaka kaka te na basani ya wolo mpe ya palata, kasi ezalaka mpe na basani oyo basala na nzete to na mabele. Basani ya wolo mpe ya palata ezalaka mpo na koyamba bato ya lokumu, kasi basani ya nzete mpe ya mabele ezalaka mpo na misala ya bongo na bongo.

Soki moto amibateli peto na makambo nyonso oyo nawuti koloba, akozala lokola sani oyo babongisi mpo na koyamba bato ya lokumu, akozala bule, moto na tina mpo na Nkolo mpe moto oyo babongisi mpo na misala nyonso ya malamu.

Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.

Ndenge nini bana mibali ya motuya ya Siona,

oyo, na kala, bazalaki kozwa bango lokola wolo ya peto,

kasi bakomi lelo komona bango lokola mbeki ya mabele,

oyo mosali mbeki basili kosala !

Moldados pela graça

Mesmo quando nos sentimos frágeis e imperfeitos, o poder de Deus se aperfeiçoa em nossa fraqueza. Ele nos restaura e nos renova continuamente.

Maboko na Yo nde ebongisaki ngai mpe esalaki ngai ;

olingi sik’oyo kobenda nzoto mpe koboma ngai ?

Kanisa ete Yo moko nde obongisaki ngai

lokola mabele ya bikeko ;

olingi sik’oyo kozongisa ngai na putulu ?

Maloba ya sukali ya moto ya motema mabe

ezalaka lokola palata ya mbindo oyo bapakoli

na mbeki basala na mabele.

Bino babateli bibwele, bolela mpe boganga !

Bino bakambi ya bitonga, bobaluka-baluka na putulu !

Pamba te tango na bino ya kokufa ekoki !

Bokokweya mpe bokopanzana mike-mike lokola mbeki.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-