Vida
A vida é um dom precioso de Deus. Desde a concepção até a eternidade, as Escrituras revelam o propósito, o valor e a plenitude da vida que o Senhor nos oferece.
Deus, o autor da vida
O Senhor é quem dá a vida e a sustenta. Cada ser humano foi formado por suas mãos com propósito e intenção divina.
Yawe Nzambe asalaki moto wuta na putulu ya mabele, afulaki pema ya bomoi na madusu ya zolo na ye ; mpe moto akomaki ekelamu ya bomoi.
Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai,
obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.
Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi.
Misala na Yo ezali ya kokamwa ;
ngai, nayebi yango malamu.
Na miso na Yo, nzoto na ngai ezalaki ya kobombama te
tango osalaki ngai na esika ebombama,
tango otongaki ngai kati na mozindo ya mabele.
Tango nazalaki nanu na lolenge te,
ozalaki komona ngai ;
mpe omikomelaki kati na buku na Yo
mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai
liboso ete moko te kati na yango ezala.
Baliaka mpe batondaka bilei ya Ndako na Yo,
mpe omelisaka bango mayi
kowuta na bolingo monene na Yo.
Nakoyembela Yawe
bomoi na ngai mobimba ;
nakoyembela Nzambe na ngai
tango nyonso nazali na bomoi.
A vida em Cristo
Jesus é o caminho, a verdade e a vida. Nele encontramos sentido, plenitude e a promessa de vida abundante e eterna.
Yesu azongiselaki ye :
— Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.
Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma mpe kobebisa ; kasi Ngai, nayei mpo ete bameme ezwa bomoi mpe ezwa yango na bofuluki penza.
Yesu alobaki na ye :
— Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi. Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango ?
Yesu azongiselaki bango :
— Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.
Moto oyo akondima Ngai, kolanda ndenge Makomi elobi, bibale ya mayi ya bomoi ekotiola wuta kati na ye.
boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.
boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.
Vivendo com sabedoria
A Bíblia nos orienta a viver com sabedoria, aproveitando bem o tempo, guardando o coração e buscando a vontade de Deus para cada dia.
Lakisa biso kotanga malamu
mikolo ya bomoi na biso
mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.
Mwana na ngai, yoka mpe yamba maloba na ngai,
mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.
Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso,
pamba te makambo nyonso oyo tosalaka,
wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.
Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso,
pamba te makambo nyonso oyo tosalaka,
wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.
Moto oyo alukaka kozwa bwanya alingaka bomoi na ye ;
moto oyo alingaka mayele alongaka.
Moto oyo abatelaka monoko na ye
abatelaka molimo na ye,
kasi moto oyo afungolaka monoko na ye makasi
akosuka na libebi.
Moto oyo ayokaka pamela atambolaka na nzela ya bomoi,
kasi moto oyo ayokaka pamela te
apengwisaka bato mosusu.
Kotosa Yawe ezali etima ya bomoi,
ekangolaka na mitambo ya kufa.
Moto oyo alukaka bosembo mpe bolingo
akozwa bomoi, bomengo mpe lokumu.
Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika ; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya. Bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu, pamba te mikolo ezali mabe.
A vida no dia a dia
Cada dia é uma oportunidade de glorificar a Deus. A Escritura nos chama a viver com propósito, confiança e fé prática.
Yawe, lakisa ngai nzela,
teya ngai nzela oyo olingi ete nalanda.
Solo, na mikolo nyonso ya bomoi na ngai,
esengo mpe bolingo na Yo ekobanda kolanda ngai ;
mpe nakovanda kati na Tempelo ya Yawe
kino suka ya bomoi na ngai.
Nzoto na ngai ekoki kobeba,
mpe motema na ngai ekoki kolemba ;
kasi Nzambe azali Libanga
mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.
Yawe akobatela yo na mabe nyonso,
akobatela bomoi na yo ;
Yawe akobatela kokende
mpe kozonga na yo,
sik’oyo mpe libela na libela.
Yoka ngai mpe kangola ngai noki !
Zala mpo na ngai libanga oyo ezingelami na bamir
mpe ndako batonga makasi mpo na kobikisa ngai.
Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe,
eloko moko kaka oyo nasengaka makasi :
nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe,
mikolo nyonso ya bomoi na ngai,
mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe
mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.
Batela kimia liboso ya Yawe
mpe talela Ye ;
kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye,
mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe.
Nakotikala kobosana ata moke te mitindo na Yo,
pamba te obatelaka bomoi na ngai
na nzela na yango.
Prioridades e eternidade
Jesus nos lembra que a vida é mais que comida e o corpo mais que roupa. O que importa é buscar o Reino de Deus e viver para a eternidade.
Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina ? Botala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ? Nani kati na bino, na nzela ya mitungisi na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na molayi ya bomoi na ye ?
Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ?
Yesu abengaki ebele ya bato mpe bayekoli na Ye, alobaki na bango :
— Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai. Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu akobikisa yango. Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ? Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, kati na bato ya ekeke oyo, ba-oyo batosaka Nzambe te mpe batondi na masumu, Mwana na Moto mpe akoyoka ye soni, tango akoya elongo na ba-anjelu ya bule kati na nkembo ya Tata na Ye.
Bongo alobaki na bato nyonso :
— Bosala keba ! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo ; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.
Nzokande, bomoi ya seko ezali : koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki.
Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.
pamba te totambolaka kolanda kondima, kasi kolanda miso te.
Bolukaka kovanda na kimia elongo na bato nyonso mpe kotambola na bomoi ya bosantu, pamba te moko te akomona Nkolo soki azangi bosantu.
ete bolukaka kobika bomoi na bino kati na kimia ; mpe tika ete moto nyonso atalaka makambo na ye moko mpe aliaka na motoki na ye moko, ndenge kaka toyebisaki bino yango, mpo ete, mokolo na mokolo, Bapagano bamemia bino, mpe mpo ete bobika te bomoi na bino na sima ya mokongo ya moto.
Mosala nyonso oyo bosalaka, bosalaka yango na mitema na bino mobimba, lokola nde bozali kosala yango mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te, pamba te boyebi malamu ete bokozwa, lokola lifuti, libula oyo Nkolo abongisa mpo na bato ya Nzambe. Ezali Klisto nde azali Nkolo oyo bosalelaka.
Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.
Nani kati na bino azali moto ya bwanya mpe ya mayele ? Tika ete ezaleli malamu na ye emonisa misala na yango kati na komikitisa mpe na bwanya.
Solo,
moto nyonso oyo azali na posa ya kolinga bomoi
mpe kobika mikolo ya esengo
asengeli kobatela lolemo na ye mosika na mabe,
mpe bibebu na ye mosika na maloba ya lokuta ;
asengeli kokima mabe mpe kosala bolamu,
koluka kimia mpe kokoba na yango,
Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe !
Bokumisa Yawe !
Likambo nyonso ezalaka na tango na yango,
mpe mosala nyonso ezalaka na ngonga na yango,
na se ya moyi.
Tala likambo oyo Ngai natindi yo lelo : linga Yawe, Nzambe na yo, tambola na banzela na Ye mpe batela mitindo na Ye, bikateli na Ye mpe mibeko na Ye. Bongo okozala na bomoi, mpe bokokoma ebele ; mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa.
Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
Molayi ya bomoi na biso ekoki kozala
mibu tuku sambo
to mibu tuku mwambe mpo na bato
oyo baleki makasi ;
nzokande, etondi na pasi mpe na minyoko,
pamba te elekaka noki, mpe tolimwaka.
Motema na ngai eswaki,
moto ezalaki kopela kati na ngai,
mpe nalobaki na nzela ya monoko na ngai.
Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka
mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai
mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka
mpo na mwa tango moke.
Solo mikolo ya bomoi na ngai ekatama,
ezali pamba na miso na Yo.
Bomoi ya moto nyonso ezali kaka mopepe.
Bana na ngai, boya, boyoka ngai ;
Nakolakisa bino kotosa Yawe.
Nani asepelaka na bomoi ?
Nani alingaka kobika mikolo ebele ya esengo ?
Batela lolemo na yo mosika na mabe,
mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te.
Suki ya pembe ezali motole ya nkembo ;
bazwaka yango na nzela ya bosembo.
Ndenge mayi ezalaka lokola kitalatala mpo na elongi,
ndenge wana mpe motema ya moto elakisaka bomoto na ye moko.