Publicidade

Viúvas

Por Bíblia Online

A Bíblia revela um cuidado especial de Deus pelas viúvas. Ao longo das Escrituras, encontramos mandamentos claros de proteção, justiça e compaixão, refletindo o caráter amoroso do Senhor.

A proteção divina

Deus se apresenta como defensor das viúvas, garantindo que não fiquem desamparadas. Ele acolhe os que sofrem e sustenta os que perderam seu amparo terreno.

Liboso ya Nzambe, bato ya sembo basepelaka,

batondaka na esengo.

Boyembela Nzambe, boyemba banzembo

mpo na lokumu ya Kombo na Ye.

Bofungola nzela mpo na Ye

oyo atambolisaka mampinga na Ye kati na esobe.

Kombo na Ye ezali Yawe.

Botonda na esengo liboso na Ye.

Yawe abatelaka bapaya,

asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali,

kasi abebisaka banzela ya bato mabe.

pamba te nazalaki kosunga babola

oyo bazalaki kosenga lisungi,

mpe mwana etike oyo azangi moto oyo akosunga ye.

Moto oyo akomaki pene ya kokufa azalaki kopambola ngai,

mpe nazalaki kopesa esengo na motema ya mwasi oyo akufisa mobali.

Justiça e compaixão

A Palavra ordena que seu povo pratique a justiça, protegendo os mais frágeis e defendendo a causa dos necessitados.

Fungola monoko na yo mpe sambisa na bosembo,

bundela babola mpe bato oyo bakelela.

Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu. Bonyokolaka te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike to mopaya to mpe mobola, mpe tika ete moko te kati na bino asala, na motema na ye, mabongisi ya kosala moninga na ye mabe»

Soki bonyokoli bango, bongo bango bagangi epai na Ngai, solo nakoyoka koganga na bango. Nakosilikela bino, nakoboma bino na mopanga ; bongo basi na bino mpe bakokoma basi bakufisa mibali mpe bana na bino, bana bitike.

Soki odefisi mbongo na moko kati na bato na Ngai, na mobola oyo azali kati na bino, okosala te ndenge modefisi mbongo asalaka ; okosenga ye mileki te.

Boyekola nde kosala malamu,

boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola,

bobundela mwana etike,

bokotela mwasi oyo akufisa mobali !

O chamado da Igreja

No Novo Testamento, o cuidado com as viúvas é expressão genuína da fé cristã. Tiago declara que a religião pura inclui visitar os necessitados.

Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali : kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.

Sunga malamu basi oyo bakufisa mibali, oyo bazali penza kokelela.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-