Pular para o conteúdo
Publicidade

1 Bakolinto 12:1-7

Makabo ya Molimo

1 Bandeko, nakosepela ete bozala na boyebi na tina na makambo oyo etali makabo ya Molimo. 2 Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu Bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te. 3 Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe, akoki koloba : « Tika ete Yesu alakelama mabe ! » Mpe moto moko te akoki koloba : « Yesu azali Nkolo, » soki akambami na Molimo Mosantu te.

4 Makabo ezali ya ndenge na ndenge, kasi Molimo azali kaka moko. 5 Misala ezali ya ndenge na ndenge, kasi Nkolo azali kaka moko. 6 Ezali na lolenge ebele ya kosalela Nkolo, kasi Nzambe azali kaka moko ; mpe ezali Ye nde asalaka nyonso kati na bato nyonso.

7 Nzokande, Molimo amimonisaka epai na moko na moko mpo na bolamu ya bato nyonso.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.