Pular para o conteúdo
Publicidade

1 Bakolinto 12

Biteni ebele kati na nzoto moko

12 Nzoto ezali kaka moko, kasi ezali na biteni ebele ; mpe atako motango na yango ezali ebele, kasi ezali kosala kaka nzoto moko. Ezali mpe bongo mpo na Klisto. 13 Solo, biso nyonso tobatisamaki kati na Molimo moko mpo na kosala nzoto moko : ezala Bayuda to Bagreki, ezala bawumbu to bansomi. Mpe epesamelaki biso nyonso komela Molimo wana se moko.

14 Nzoto ezali na eteni moko te, kasi ezali na biteni ebele. 15 Soki lokolo elobi : « Lokola nazali loboko te, nazali kati na nzoto te » boni, ekotika penza kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo ? 16 Soki mpe litoyi elobi : « Lokola nazali liso te, nazali eteni ya nzoto te » boni, ekotika penza kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo ? 17 Soki nzoto mobimba ezalaki kaka liso, nzoto yango elingaki koyoka ndenge nini ? Soki nzoto mobimba ezalaki kaka litoyi, nzoto yango elingaki koyoka solo ndenge nini ? 18 Kasi Nzambe atiaki biteni kati na nzoto, mpe amonaki ete ezali malamu mpo na eteni moko na moko kozala na mosala na yango. 19 Soki biteni nyonso ezalaki kaka eteni moko, boni, nzoto elingaki penza kozala nzoto ?

20 Solo, biteni ezali ebele, kasi nzoto ezali kaka moko. 21 Yango wana, liso ekoki te koloba na loboko : « Nazali na posa na yo te » moto mpe ekoki te koloba na makolo : « Nazali na posa na bino te»

22 Nzokande biteni ya nzoto, oyo emonanaka ete ezali na motuya moke, ezalaka na tina makasi ; 23 biteni oyo tozwaka na lokumu moke kati na nzoto, tobatelaka yango makasi ; mpe biteni oyo toyokaka nkele, yango nde tobongisaka na lolenge malamu, 24 wana biteni oyo ebetisaka mabaku te ezalaka na posa ya lolenge malamu yango te. Nzambe abongisa nzoto na lolenge ete basengeli kaka kozwaka na lokumu mingi, biteni oyo emonanaka lokola ezanga lokumu : 25 asalaki bongo mpo ete bokabwani ezala te kati na nzoto, kasi mpo ete biteni na yango esunganaka. 26 Soki eteni moko eyoki pasi, biteni nyonso esengeli koyoka pasi elongo na moko yango ; soki mpe moko kaka nde esepeli, biteni nyonso esengeli kokabola esengo elongo na moko yango. 27 Nzokande bino, bozali nzoto ya Klisto, mpe moko na moko kati na bino azali eteni ya nzoto yango ya Klisto.

Veja também