4 Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te, 5 ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe. 6 Bolingo eyokaka mawa liboso ya bozangi bosembo, kasi esepelaka na bosolo.
7 Tango nyonso mpe na makambo nyonso, bolingo elimbisaka, endimaka, ezalaka na elikya, eyikaka mpiko.