Na tina na libala
1 Sik’oyo, nazali kopesa biyano na tina na makambo oyo bokomelaki ngai.
Eleki malamu mpo na mobali ete abala mwasi te. 2 Kasi mpo na kokima pite, tika ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye. 3 Tika ete mobali akokisa posa ya mwasi na ye, mpe tika ete mwasi akokisa posa ya mobali na ye. 4 Pamba te mwasi azali na bokonzi te na nzoto na ye, ezali nde mobali na ye ; ndenge moko mpe, mobali azali na bokonzi te na nzoto na ye, kasi ezali nde mwasi na ye.