Pular para o conteúdo
Publicidade

1 Coríntios 7

Na tina na libala

1 Sik’oyo, nazali kopesa biyano na tina na makambo oyo bokomelaki ngai.

Eleki malamu mpo na mobali ete abala mwasi te. 2 Kasi mpo na kokima pite, tika ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye. 3 Tika ete mobali akokisa posa ya mwasi na ye, mpe tika ete mwasi akokisa posa ya mobali na ye. 4 Pamba te mwasi azali na bokonzi te na nzoto na ye, ezali nde mobali na ye ; ndenge moko mpe, mobali azali na bokonzi te na nzoto na ye, kasi ezali nde mwasi na ye. 5 Bopimelanaka nzoto te, longola kaka soki, na boyokani mpe mpo na mwa tango moke, bolingi tango mosusu komipesa na losambo. Kasi sima na tango yango, bozongela kosangisa nzoto mpo ete Satana akozwa nzela te ya komeka bino likolo ya bozangi makoki ya komikanga.

Veja também