Pular para o conteúdo
Publicidade

1 Masolo ya Kala 29:11,12,14,15

11 Oh Yawe, monene, nguya, kongenga,

nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo ;

pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo.

Yawe, bokonzi ezali ya Yo,

osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.

12 Bozwi mpe lokumu ewutaka epai na Yo ;

ozali na bokonzi likolo na nyonso,

makasi mpe nguya ezali na maboko na Yo

mpo na kotombola mpe kopesa makasi na moto nyonso.

14 Nazali nani, mpe bato na ngai bazali banani,

mpo ete tozwa makoki ya kopesa makabo oyo,

wuta na mokano ya mitema na biso moko ?

Nyonso ewutaka epai na Yo,

mpe topesi Yo kaka oyo ewuti na loboko na Yo.

15 Liboso na Yo, tozali bapaya mpe baleki nzela,

ndenge ezalaki batata na biso.

Mikolo na biso awa na mokili ezali koleka

lokola elili oyo ezangi elikya.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.