Pular para o conteúdo
Publicidade

1 Pedro 3

Basi mpe mibali kati na libala

1 Bino mpe basi, botosaka mibali na bino mpo ete, soki ezali na ndambo ya mibali oyo bandimaka Liloba na Nzambe te, bakoma kondima na nzela ya bizaleli malamu ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te, 2 tango bakomona bino kotambola na bomoi ya peto mpe ya botosi.

3 Bolukaka kaka te kokoma kitoko na libanda na nzela ya kokanga suki, kolata babiju ya wolo to bilamba ya kitoko ; 4 kasi bolukaka nde kitoko ya bomoto ya kati : esilaka te, ewutaka na molimo ya boboto mpe ya kimia, ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe. 5 Ezalaki ndenge wana nde basi ya bule oyo, na kala, bazalaki kotia elikya na bango na Nzambe bazalaki komikomisa kitoko. Bazalaki kotosa mibali na bango, 6 lokola Sara oyo atosaki Abrayami kino kobenga ye « nkolo na ngai» Bozali bana basi ya Sara soki bosali bolamu mpe bopesi nzela te na bobangi.

Veja também