Natan mpe Batisheba epai ya Davidi
11 Natan atunaki Batisheba, mama ya Salomo :
— Boni, oyoki te ete Adoniya, mwana mobali ya Agite, akomi mokonzi ; kasi mokonzi Davidi ayebi te ? 12 Sik’oyo, tika ete napesa yo toli oyo ekobikisa bomoi na yo mpe bomoi ya Salomo, mwana na yo ya mobali. 13 Kota epai ya mokonzi Davidi mpe loba na ye : « Mokonzi, nkolo na ngai, olapaki ndayi te liboso na ngai mwasi mowumbu na yo : ‹ Solo, Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi ? › Boye mpo na nini Adoniya akomi mokonzi ? »