41 Eliya alobaki na Akabi :
— Kende, lia mpe mela, pamba te nazali koyoka makelele ya mvula makasi.
42 Boye, Akabi akendeki kolia mpe komela. Kasi Eliya amataki kino na songe ya ngomba Karimeli, afukamaki elongi kino na se, na kati-kati ya mabolongo. 43 Alobaki na mosali na ye :
— Kende kotala na nzela ya ebale monene.
Mosali na ye akendeki kotala, alobaki :
— Eloko moko te ezali kuna.
Eliya atindaki ye mbala sambo na maloba oyo : « Kende kotala lisusu ! »
44 Na mbala ya sambo, mosali na ye alobaki :
— Tala, lipata moko ya moke lokola loboko ya moto ezali kobima wuta na ebale monene.
Boye Eliya alobaki :
— Kende koyebisa Akabi : « Bongisa shar na yo noki mpe zonga na ndako na yo, noki te mvula ekokanga yo na nzela. »
45 Na tango wana kaka, likolo eyindaki makasi na mapata ya mvula, mopepe eyaki, mpe mvula makasi enokaki. Akabi amataki na shar na ye mpe akendeki na Jizireyeli.