19 Tango Batisheba akendeki epai ya mokonzi Salomo mpo na kolobela Adoniya, mokonzi atelemaki mpo na kokutana na Batisheba, agumbamaki liboso na ye mpe avandaki na kiti na ye ya bokonzi. Asengaki ete batia kiti mpo na mama ya mokonzi, mpe Batisheba avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya mokonzi.
20 Batisheba alobaki :
— Nazali na bosenga moko ya moke mpo na koyebisa yo, kasi kopimela ngai yango te.
Mokonzi azongisaki :
— Loba na yo, mama na ngai ; nakopimela yo yango te.