Pular para o conteúdo
Publicidade

1 Samuel 1

10 Wana Ana azalaki na pasi na motema, abondelaki Yawe na kolela mingi. 11 Bongo apesaki elaka, alobaki : « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te»

12 Lokola azalaki kobenda libondeli na ye molayi liboso ya Yawe, Eli azalaki kotala malamu-malamu monoko na ye. 13 Mpe wana Ana azalaki kobondela na se ya motema, bibebu na ye ezalaki koningana, kasi mongongo ezalaki koyokana te. Mpe Eli akanisaki ete Ana alangwe masanga. 14 Eli alobaki na Ana :

Kino tango nini okozala na milangwa ? Longola milangwa na yo.

15 Ana azongisaki :

Te, nkolo na ngai ! Nalangwe te, nameli ata vino to masanga makasi te. Kasi nazali na mawa mingi ; nazalaki kosopa motema na ngai epai na Yawe. 16 Kozwa mwasi mowumbu na yo te lokola mwasi ya mobulu, pamba te ezali mawa ya motema na ngai mpe monene ya pasi na ngai nde etindi ngai kobondela kino tango oyo.

17 Eli azongisaki :

Kende na kimia, mpe tika ete Nzambe ya Isalaele apesa yo, oyo osengi Ye.

18 Ana alobaki :

Tika ete mwasi mowumbu na yo azwa ngolu na miso na yo.

Boye Ana azongaki, aliaki mpe elongi na ye ezalaki lisusu ya mawa te.

19 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Elikana mpe libota na ye balamukaki mpe bagumbamelaki Yawe ; sima na yango, bazongaki epai na bango, na Rama.

Mbotama ya Samuele

Elikana asangisaki nzoto na Ana, mwasi na ye, mpe Yawe akaniselaki Ana. 20 Boye Ana akomaki na zemi mpe, sima na mwa mikolo, abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Samuele» pamba te alobaki : « Mpo ete nasengaki ye epai na Yawe»

Veja também