11 Bongo Samuele atunaki Izayi :
— Boni, bana na yo ya mibali bakoki bango nyonso ?
Izayi azongisaki :
— Te ! Ezali lisusu na moko oyo aleki bolenge, kasi azali koleisa bampate.
Samuele alobaki :
— Bengisa ye, pamba te tokovanda na mesa te soki akomi nanu te.
12 Boye, Izayi atindaki bato mpo na kobenga ye, mpe bayaki na ye. Langi ya poso ya nzoto na ye ezalaki kitoko ; azalaki na miso kitoko mpe elobeli ya malamu. Bongo Yawe alobaki na Samuele : « Telema mpe pakola ye mafuta, pamba te ezali nde ye. »
13 Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.