34 Davidi azongiselaki Saulo :
— Mosali na yo azalaki kobatela bameme ya tata na ye. Tango ngombolo to nkosi ezalaki koya kokamata meme moko kati na etonga, 35 nazalaki kolanda mpe kobeta yango, nazalaki kokangola mpe kobotola meme na monoko ya tambwe to ya nkosi yango. Tango ezalaki kobalukela ngai, nazalaki kokanga yango, kobeta mpe koboma yango. 36 Lokola mosali na yo abomaki ezala ngombolo to nkosi, akoboma mpe moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te lokola moko kati na banyama wana, pamba te atioli mampinga ya Nzambe na bomoi.