Pular para o conteúdo
Publicidade

1 Samuele 17:4,33,37,40,45,49

4 Elombe mobali moko oyo kombo na ye ezalaki « Goliati, » moto ya mboka Gati, abimaki wuta na molako ya bato ya Filisitia. Azalaki na bametele pene misato na molayi.

33 Kasi Saulo alobaki na Davidi :

— Okoki te kokende kobundisa moto wana ya Filisitia ! Ozali mwana moke, nzokande ye azali mobundi ya bitumba wuta bolenge na ye.

37 Yawe oyo akangolaki ngai na manzaka ya ngombolo mpe ya nkosi akokangola ngai na maboko ya moto ya Filisitia oyo.

Saulo alobaki na Davidi :

— Kende, mpe tika ete Yawe azala elongo na yo.

40 Asimbaki kaka lingenda na ye na loboko, aponaki mabanga mitano ya moselu kati na moluka ya lubwaku mpe atiaki yango na libenga na ye ya mobateli bibwele ; asimbaki ebambelo mabanga na loboko mpe apusanaki epai ya moto ya Filisitia.

45 Davidi alobaki na moto ya Filisitia :

— Ozali koya kobundisa ngai na mopanga, na likonga ya monene mpe na likonga ya moke. Kasi ngai nayei kobundisa yo na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya mampinga ya Isalaele, oyo yo ozali kotiola.

49 Davidi akotisaki loboko na ye kati na libenga na ye, azwaki libanga moko mpe abambaki yango na nzela ya ebambelo na ye ya mabanga ; abetaki moto ya Filisitia na elongi. Libanga ekotaki kati na elongi ya moto ya Filisitia, mpe akweyaki elongi kino na mabele.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.