Losambo ya Ana
1 Ana asambelaki na maloba oyo :
Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yawe
mpo ete alendisi bomoi na ngai.
Wana nazali na esengo mpo ete okangoli ngai,
monoko na ngai ekotelemela banguna na ngai.
2 Moko te azali bule lokola Yawe ;
moko te, bobele Yo.
Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso.
3 Bolobaloba maloba ebele te ya lolendo,
mpe tika ete lofundu ebima na monoko na bino te,
pamba te Yawe azali Nzambe oyo ayebi nyonso
mpe asambisaka misala nyonso ya bato.
4 Tolotolo ya bilombe ebukani,
kasi bato na bolembu bazwi makasi.
5 Bato oyo bazalaki na bozwi ebele
bakomi koluka mosala mpo na bilei,
kasi ba-oyo bazalaki kokelela batiki kosala.
Mwasi oyo abotaki te akobota mbala sambo,
kasi mwasi oyo abotaki bana ebele akobota lisusu te.
6 Yawe abomaka mpe apesaka bomoi,
akitisaka bato na mokili ya bakufi mpe asekwisaka.
7 Yawe akomisaka moto mobola,
mpe akomisaka moto mozwi ;
akitisaka mpe atombolaka.
8 Alongolaka mobola na putulu,
mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga ;
mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu
mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula.
Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe,
mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili.
9 Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye,
kasi bato mabe bakobunga kati na molili.
Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.
10 Bato oyo batiaka tembe na Yawe bakopanzana,
pamba te akokweyisela bango kake wuta na likolo.
Yawe akosambisa mokili mobimba,
akopesa mokonzi na yango nguya
mpe akobakisa makasi ya mopakolami na Ye.