Pular para o conteúdo
Publicidade

1 Samuele 21:10-15

10 Nganga-Nzambe azongisaki :

— Ezali awa na mopanga ya Goliati, moto ya Filisitia, oyo obomaki na lubwaku ya Terebente ; balinga yango na elamba sima na efode. Soki olingi kozwa yango, zwa na yo ; pamba te ezali awa na mopanga mosusu te, bobele oyo wana.

Davidi alobaki :

— Mopanga moko te ekokani na yango ; pesa ngai yango.

Davidi kati na mboka Gati

11 Na mokolo wana kaka, Davidi atelemaki, akimaki Saulo mpe akendeki epai ya Akishi, mokonzi ya Gati. 12 Kasi basali ya Akishi balobaki na ye : « Moto oyo azali Davidi te, mokonzi ya mboka ? Ezali ye te oyo bazali koyemba boye na kobina na tina na ye : ‹ Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi ? › »

13 Davidi asimbamaki na maloba oyo mpe abangaki makasi Akishi, mokonzi ya Gati. 14 Mpe wana akosaki kobela liboma na miso ya bato ya Filisitia, akomaki kosala kati na bango makambo lokola moto ya liboma : kokoma na bikuke ya bandako, mpe kotika soyi kotanga ye na mandefu. 15 Akishi alobaki na basali na ye : « Botala tata oyo, azali moto ya liboma ! Mpo na nini boyei na ye epai na ngai ?

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.