20 Pamba te bilaka nyonso ya Nzambe ezalaka « iyo » kati na Klisto ; mpe ezali na nzela na Ye Klisto nde tolobaka « amen » mpo na nkembo ya Nzambe. 21 Nzokande, ezali Nzambe nde alendisaka biso mpe bino kati na Klisto ; mpe lokola abulisaki biso na nzela ya epakolami na Ye, 22 abetaki biso kashe na Ye lokola libula na Ye, mpe atiaki Molimo na Ye kati na mitema na biso lokola ndanga ya biloko oyo akopesa biso.
Publicidade