Pular para o conteúdo
Publicidade

2 Coríntios 13

11 Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo : Bosepelaka ! Bolukaka kokoma bato ya kokoka, bolendisanaka bino na bino, bozalaka na likanisi moko, bobikaka bomoi na bino na kimia. Bongo Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo.

12 Bopesanaka mbote na beze ya bule.

Basantu nyonso oyo bazali awa batindeli bino mbote.

13 Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu-Klisto, bolingo ya Nzambe mpe lisanga na Molimo Mosantu ezala na bino nyonso !

Veja também