7 Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.
8 Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te ; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te ; 9 tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te ; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.
10 Solo, tomemaka tango nyonso mpe bisika nyonso kufa ya Yesu kati na nzoto na biso, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso. 11 Pamba te, biso oyo tozali na bomoi, tokutanaka na kufa mpo na Yesu, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso, oyo ekufaka.