Pular para o conteúdo
Publicidade

2 Bakolinto 6:14-17

Kokabwana na mabe

14 Bosanganaka te na bato oyo bazangi kondima. Pamba te boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe ? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili ? 15 Klisto akoki solo koyokana na Satana ? Eloko nini ekoki kosangisa mondimi elongo na moto oyo azangi kondima ? 16 Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko ? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko :

« Nakovanda kati na bango

mpe nakotambola elongo na bango.

Nakozala Nzambe na bango,

mpe bango bakozala bato na ngai. »

17 Yango wana,

« Bobima kati na bango

mpe bokabwana na bango,

elobi Nkolo ;

bosimba eloko moko te ya mbindo,

mpe ngai nakoyamba bino. »

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.