4 Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso : na koyika mpiko makasi
kati na minyoko, kozanga mpe pasi na motema ;
5 kati na kobetama, boloko mpe mobulu ;
kati na misala makasi, kozanga kolala mpe kokila bilei ;
6 kati na bopeto, boyebi, kokanga motema mpe boboto ;
kati na Molimo Mosantu mpe bolingo ya solo ;
7 kati na Liloba ya bosolo mpe nguya ya Nzambe ;
kati na bibundeli ya bosembo
mpo na kobundisa monguna mpe komibatela ;
8 kati na lokumu mpe soni,
kosakolama lokola bato malamu mpe lokola bato mabe.
Mpe lisusu,
kati na koyebana lokola bato oyo balobaka lokuta,
nzokande tolobaka solo ;
9 koyebana lokola bato oyo bayebani te,
nzokande toyebani makasi ;
koyebana lokola bakufi,
nzokande tozali bato ya bomoi ;
koyebana lokola bato bakweyisama,
nzokande baboma biso te ;
10 koyebana lokola bato na mawa,
nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ;
koyebana lokola babola,
nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ;
koyebana lokola bato bakelela,
nzokande tozali na nyonso.