Pular para o conteúdo
Publicidade

2 Reis 2

Elize apetoli mayi

19 Bato ya engumba ya Jeriko bayebisaki Elize :

Oh nkolo ! Engumba na biso etongami na esika ya malamu ndenge ozali komona yango, kasi mayi ezali mabe mpe mabele ebotaka te.

20 Elize alobaki :

Bomemela ngai sani ya moke ya sika mpe botia mungwa na kati.

Bamemelaki ye yango 21 mpe akendeki na etima, abwakaki kuna mungwa mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Napetoli mayi oyo ; ekoyeisa lisusu kufa te mpe ekobebisa lisusu mabele te mpo ete ebota mbuma› »

22 Boye mayi etikala peto kino na mokolo ya lelo, kolanda liloba oyo Elize abimisaki.

Veja também