Pular para o conteúdo
Publicidade

2 Reis 4

Mafuta ya mwasi akufisa mobali

1 Mwasi moko kati na basi ya bayekoli ya basakoli abondelaki Elize :

Mosali na yo, mobali na ngai, akufa. Oyebi malamu ete azalaki kotosa Yawe. Kasi moto oyo adefisaki ye niongo ayei mpo na kozwa bana na ngai mibale ya mibali mpo ete bakoma bawumbu na ye.

2 Elize azongiselaki ye :

Ndenge nini nakoki kosunga yo ? Yebisa ngai eloko oyo ozali na yango kati na ndako na yo.

Azongisaki :

Mwasi mowumbu na yo azali na eloko moko te, longola kaka mwa mafuta.

3 Elize alobaki :

Kende kosenga na baninga na yo nyonso bambeki ya pamba, kosenga moke te. 4 Sima, zonga na ndako na yo, kanga ekuke sima na yo elongo na bana na yo ya mibali ; sopa mafuta kati na mbeki moko na moko, mpe tia pembeni mbeki oyo etondi.

5 Atikaki Elize mpe akangaki ekuke sima na ye elongo na bana na ye ya mibali. Bana na ye bazalaki kopesa ye bambeki, mpe azalaki kotondisa yango na mafuta. 6 Tango bambeki nyonso etondaki, alobaki na moko kati na bana na ye ya mibali :

Pesa ngai lisusu mbeki moko.

Kasi mwana yango azongiselaki ye :

Bambeki nyonso esili.

Kaka na tango yango, mafuta etikaki kobima. 7 Mwasi yango akendeki koyebisa moto na Nzambe. Mpe moto na Nzambe alobaki na ye :

Kende, teka mafuta yango mpe futa niongo na yo ; bongo, yo elongo na bana na yo ya mibali, bokobika na oyo ekotikala.

Veja também