Pular para o conteúdo
Publicidade

2 Reis 4

32 Tango Elize akomaki na ndako, akutaki ebembe ya mwana mobali elali na mbeto na ye. 33 Elize akotaki, amikangelaki na shambre elongo na mwana mobali, mpe asambelaki Yawe. 34 Bongo Elize amataki na mbeto mpe alalelaki mwana mobali, atutisaki monoko na ye na monoko ya mwana, miso na ye na miso ya mwana, mpe maboko na ye na maboko ya mwana. Lokola amitandaki bongo na likolo ya mwana mobali, nzoto ya mwana mobali ekomaki moto. 35 Elize alongwaki, atambolaki na bangambo nyonso ya shambre ; bongo amataki lisusu na mbeto mpe amitandaki na likolo ya mwana. Mbala moko, mwana akosolaki mbala sambo mpe afungolaki miso.

Veja também