Elize mpe mwasi ya Sunami
8 Mokolo moko, Elize akendeki na Sunemi. Mpe kuna, mwasi moko ya bomengo atungisaki ye mpo na kosenga na ye ete andima kolia na ndako na ye. Boye, tango nyonso Elize azalaki kolekela na Sunami, azalaki kotelema na ndako ya mwasi yango mpo na kolia. 9 Mwasi yango alobaki na mobali na ye : « Nayebi ete moto oyo ayaka mbala mingi epai na biso azali mobulami ya Nzambe. 10 Nabondeli yo, tika ete tobongisela ye shambre ya moke na likolo ya ndako mpe totia kati na yango mbeto, mesa, kiti mpe mwinda. Boye, tango nyonso akoya epai na biso, akoki kovanda kuna. »
11 Mokolo moko, Elize ayaki na Sunami, amataki na shambre na ye mpe alalaki kuna. 12 Bongo alobaki na mosali na ye, Geazi : « Benga mwasi oyo ya Sunami. » Geazi abengaki mwasi ya Sunami, mpe mwasi yango ayaki kotelema liboso ya Elize. 13 Elize alobaki na Geazi :
— Loba na ye : « Omitungisi mingi mpo na biso. Eloko nini tokoki sik’oyo kosalela yo ? Tolobela yo epai ya mokonzi to epai ya mokonzi ya basoda ? »
Mwasi ya Sunami azongisaki :
— Navandaka na kimia kati na bato na ngai.
14 Elize atunaki mosali na ye, Geazi :
— Eloko nini tokoki kosala mpo na ye ?
Geazi azongisaki :
— Azali na mwana te, mpe mobali na ye azali mobange.
15 Elize alobaki :
— Benga ye !
Geazi abengaki ye, mpe ayaki kotelema na ekuke.
16 Elize alobaki :
— Na mobu oyo ekoya, na eleko oyo, maboko na yo ekosimba mwana mobali.
Mwasi ya Sunami agangaki :
— Te, nkolo na ngai, moto na Nzambe, kopesa na ngai mwasi mosali na yo elikya ya lokuta te !
17 Nzokande, mwasi ya Sunami akomaki na zemi. Mpe na mobu oyo elandaki, na eleko yango kaka, abotaki mwana mobali, ndenge kaka Elize alobaki na ye.
18 Mwana akolaki. Mokolo moko, mwana akendeki epai ya tata na ye, oyo azalaki elongo na babuki mbuma. 19 Alobaki na tata na ye :
— Moto pasi ! Moto pasi !
Tata na ye alobaki na mosali moko :
— Zongisa ye epai ya mama na ye !
20 Mosali amemaki ye mpe akomisaki ye epai ya mama na ye. Mwana mobali avandaki na makolo ya mama na ye kino na midi mpe, na sima, akufaki. 21 Mama na ye amataki na shambre ya mosakoli, alalisaki ye na mbeto ya moto na Nzambe, akangaki ekuke mpe abimaki. 22 Bongo abengaki mobali na ye mpe alobaki na ye :
— Nabondeli yo, tindela ngai elenge moko kati na basali mpe ane moko ya mwasi, mpo ete nakende noki epai ya moto na Nzambe mpe nazonga mbala moko.
23 Mobali na ye atunaki :
— Mpo na nini olingi kokende epai na ye lelo ? Lelo ezali ebandeli ya sanza te ! Ezali mpe mokolo ya Saba te !
Azongisaki :
— Komitungisa te ! Nyonso ezali malamu.
24 Mwasi ya Sunami abongisaki ane mpe alobaki na elenge mosali na ye : « Tokeyi ! Tambolisa ane ; kotelema na nzela te soki nalobi na yo te. »
25 Boye, akendeki mpe akomaki na ngomba Karimeli epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda. Tango Elize amonaki ye na mosika, alobaki na mosali na ye, Geazi :
— Tala ! Ezali mwasi ya Sunami ! 26 Nabondeli yo, pota mbangu sik’oyo mpo na kokutana na ye, mpe tuna ye : « Boni, kimia ezali ? Ozali malamu ? Mobali na yo azali malamu ? Mwana na yo azali malamu ? »
Azongisaki :
— Nyonso ezali malamu.
27 Boye akobaki nzela na ye kino akomaki na ngomba, epai ya moto na Nzambe. Mpe amibwakaki na makolo na ye. Geazi apusanaki mpo na kolongola ye na makolo ya Elize, kasi moto na Nzambe alobaki :
— Tika ye bongo ! Azali na pasi makasi kati na motema na ye, kasi Yawe abombeli ngai yango mpe atalisi ngai te tina na yango.
28 Mwasi ya Sunami alobaki :
— Boni, nasengaki mwana epai ya nkolo na ngai ? Te ! Kutu, nalobaki na yo : « Kopesa ngai elikya ya lokuta te ! »
29 Elize alobaki na Geazi :
— Lata mokaba na yo, kamata nzete na ngai na loboko na yo mpe kende. Soki okutani na moto na nzela, kopesa ye mbote te. Mpe soki moto apesi yo mbote, kozongisa te. Okotia nzete na ngai na elongi ya mwana mobali.
30 Kasi mama ya mwana alobaki :
— Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te.
Boye Elize atelemaki mpe alandaki mwasi ya Sunami. 31 Geazi akendeki liboso na bango mpe atiaki nzete na elongi ya mwana mobali, kasi ata eloko moko te esalemaki, ezala mongongo to koningana. Geazi azongaki mpo na kokutana na Elize mpe alobaki na ye :
— Mwana alamuki te.
32 Tango Elize akomaki na ndako, akutaki ebembe ya mwana mobali elali na mbeto na ye. 33 Elize akotaki, amikangelaki na shambre elongo na mwana mobali, mpe asambelaki Yawe. 34 Bongo Elize amataki na mbeto mpe alalelaki mwana mobali, atutisaki monoko na ye na monoko ya mwana, miso na ye na miso ya mwana, mpe maboko na ye na maboko ya mwana. Lokola amitandaki bongo na likolo ya mwana mobali, nzoto ya mwana mobali ekomaki moto. 35 Elize alongwaki, atambolaki na bangambo nyonso ya shambre ; bongo amataki lisusu na mbeto mpe amitandaki na likolo ya mwana. Mbala moko, mwana akosolaki mbala sambo mpe afungolaki miso. 36 Elize abengaki Geazi mpe alobaki na ye :
— Benga mwasi ya Sunami !
Geazi abengaki ye. Tango ayaki epai ya Elize, Elize alobaki :
— Zwa mwana na yo !
37 Mwasi ya Sunami apusanaki, akweyaki na makolo ya Elize mpe agumbamaki kino na se ; bongo azwaki mwana na ye mpe abimaki.