Ebende ya epasola etepi na mayi
1 Mokolo moko, bayekoli ya basakoli balobaki na Elize :
— Tala ! Esika oyo tosanganaka elongo na yo ekomi moke mingi mpo na biso. 2 Pesa biso nzela ya kokende na ebale Yordani epai wapi moko na moko kati na biso akoki kozwa nzete mpo na kotonga kuna esika ya kovanda.
Elize alobaki na bango :
— Bokende !
3 Moko kati na bango alobaki :
— Okosepela te kokende elongo na basali na yo ?
Elize azongisaki :
— Nandimi, nakokende.
4 Boye akendeki elongo na bango. Bakendeki na ebale Yordani mpe babandaki kokata banzete. 5 Wana moko kati na bango azalaki kokata nzete, ebende ya epasola na ye ekweyaki na mayi. Agangaki :
— Ah, nkolo na ngai ! Nadefaki yango kodefa !
6 Moto na Nzambe atunaki :
— Ekweyaki na esika nini ?
Sima na ye kolakisa ye esika yango, Elize akataki eteni ya nzete mpe abwakaki yango na esika oyo ebende ya epasola ekweyaki. Mpe, na mbala moko, eteni ya nzete yango ematisaki ebende na likolo ya mayi, mpe ebende ekomaki kotepa. 7 Elize alobaki :
— Kamata yango !
Boye, mosali wana asembolaki loboko na ye mpe akamataki yango.