14 Kati na basi yango, ezalaki na mwasi moko, kombo na ye « Lidi. » Azalaki moteki ya bilamba ya motane, moto ya Tiyatire mpe mogumbameli ya Nzambe. Azalaki koyoka, mpe Nkolo afungolaki motema na ye mpo ete akangama na makambo oyo Polo azalaki koloba. 15 Tango ye elongo na bato ya libota na ye bazwaki libatisi, abengisaki biso na ndako na ye ; alobaki :
— Soki bomoni ete ngai nakomi penza mondimi ya Nkolo, boya kovanda na ndako na ngai.
Boye, asalaki nyonso mpo ete tondima kokende na ndako na ye.