Polo mpe Silasi na boloko
16 Mokolo moko, wana tozalaki kokende na esika ya losambo, tokutanaki na mwasi mowumbu moko oyo azalaki na molimo mabe oyo ezalaki kosunga ye mpo na kosakola makambo oyo ekoya, mpe azalaki kozwela bankolo na ye mbongo ebele na nzela ya masakoli na ye. 17 Mwasi yango azalaki kolanda biso, Polo mpe biso, na koganga :
— Bato oyo bazali basali ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, bazali koteya bino nzela ya lobiko.
18 Lokola azalaki kosala bongo wuta mikolo ebele, suka na suka, Polo atombokaki, abalukaki mpe alobaki na molimo mabe yango :
— Na Kombo na Yesu-Klisto, napesi yo mitindo : bima kati na mwasi oyo !
Kaka na tango yango, molimo yango ebimaki kati na ye.