13 Ndambo ya Bayuda oyo bazalaki kotambola-tambola mpo na kobengana milimo mabe bamekaki kobelela Kombo ya Nkolo Yesu mpo na koluka kokangola bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe ; bazalaki koloba :
— Na Kombo ya Yesu oyo Polo ateyaka, napesi bino mitindo ya kobima.
14 Bana mibali sambo ya Moyuda Seva, moko kati na bakonzi ya Banganga-Nzambe, bazalaki kosala bongo. 15 Mokolo moko, molimo mabe ezongiselaki bango :
— Nayebi Yesu, nayebi mpe soki Polo azali nani ; kasi bino, bozali banani ?
16 Mpe moto oyo azalaki na molimo mabe apumbwelaki bango, akangaki bango mpe abetaki bango nyonso makasi penza kino babimaki na ndako bolumbu mpe batonda na bapota.