Petelo ateyi ebele ya bato
14 Petelo atelemaki elongo na bantoma zomi na moko ; mpe na mongongo makasi, alobaki na ebele ya bato :
— Bino Bayuda, mpe bino nyonso oyo bovandaka na Yelusalemi, botika ete nalimbola mpo na bino likambo oyo, boyoka malamu makambo oyo nalingi koloba. 15 Bato oyo balangwe masanga te ndenge bozali kokanisa. Pamba te tozali nanu na ngonga ya libwa ya tongo. 16 Kasi ezali nde makambo oyo mosakoli Joeli alobaki :
17 « Na mikolo ya suka, elobaki Nzambe,
nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso.
Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola ;
bilenge na bino bakozwa bimoniseli,
mibange na bino bakolota bandoto.