30 Filipo akendeki mbangu pene ya shar yango mpe ayokaki ye kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi. Filipo atunaki ye :
— Boni, ozali kososola makambo oyo ozali kotanga ?
31 Azongisaki :
— Nakososola ndenge nini soki moto alimboleli ngai yango te ?
Boye abengaki Filipo ete amata na shar mpe avanda pembeni na ye.
32 Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga :
« Lokola mpate oyo bazali komema
na esika oyo babomelaka banyama,
lokola meme liboso ya moto
oyo azali kolongola yango bapwale,
afungolaki monoko na ye te.